Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 100

Tóyamba bango malamu

Tóyamba bango malamu

(Misala 17:7)

  1. 1. Yehova ayebi koyamba bato.

    Atalaka te bilongi liboso.

    Apesaka mbula,

    bilei mpe moi

    Na basembwi mpe bato mabe.

    Soki moto’azangi, tokabeli ye,

    Tolandi lobɔkɔ pɛtɛɛ ya Nzambe.

    Yah akozongisa

    nyonso toz’osala

    Na mawa, na kopusama te.

  2. 2. Ntango tosalisi moto ya mpasi,

    Soki ekofuta, nani ayebi?

    Yambá moto nyonso:

    mondɛlɛ, moindo;

    Azangi eloko, pesá ye.

    Tómekola Lidia na likamb’oyo.

    Tótya bato mbamba báya na ndako.

    Tata az’omona

    nyonso toz’osala,

    Toz’olanda lokolo na ye.