Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 101

Tósala na bomoko

Tósala na bomoko

(Baefese 4:3)

  1. 1. Nzambe alongoli biso

    Na bokabwani ya bato.

    Bomoko, kimya na biso

    Ez’opes’esengo.

    Tólɛngɛla yango;

    Eloko’a ntalo.

    Mosala eza’ ebele

    N’ebongiseli ya Nzambe.

    Tópesana mabɔkɔ nde,

    Tóbendanaka te.

  2. 2. Tókoba kosɛnga Nzambe

    Mbuma ya elimo na ye;

    Tokokolisa bolingo,

    Kimya mpe esengo.

    Kimya soki’ezali,

    Kitoko mingi.

    Mpo tózwa kimy’a likoló,

    Tólingana mpenza solo.

    Na bomoko banda lelo,

    Tósalela Nkolo.