Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 102

‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’

‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’

(Misala 20:35)

  1. 1. Toza’ bato’a bolɛmbu,

    totondi n’ango.

    Ata bongo Yehova

    alingi biso.

    Mawa mpe bolingo

    na y’eza’ mozindo.

    Tólinga bato bongo,

    tósunga bango.

  2. 2. Kondima ya bandeko

    elɛmbaka mpe.

    Ɛɛ, tólendisa bango,

    mpo bábanga te.

    Nzamb’ayebi bango,

    baza’ bato na ye.

    Mpasi na bango’ezala

    mpasi na biso.

  3. 3. N’esik’a kokitisa

    bato balɛmbi,

    Tózala boboto nde,

    bázwa makasi.

    Tólɛmba ndeko te,

    tókima ndeko te.

    Tósunga bango mpenza,

    motem’ekita.