Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 158

Ekoleka te!

Ekoleka te!

(Habakuku 2:3)

  1. 1. Misala na yo

    kokamwa mpenza.

    Emonisaka

    mpe bolingo na yo.

    Yehova Nzambe,

    obongwanaka te.

    Olaki biso

    mokili ya sika.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela

    na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete

    ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

  2. 2. Toza’ kozela

    lisekwa eya.

    Yehova Nzambe,

    toza’ na elikya.

    Toyebi mpenza

    okosal’ango.

    Pesá biso se

    motema molai.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela

    na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete

    ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

  3. 3. Yo olukaka

    bato ya sembo.

    Opesi bango

    elikya mpe bomoi.

    Kosala na yo,

    koteya bato:

    Bomoi toponá;

    bomoi ya kitoko.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela

    na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete

    ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

    Tata, sungá tózela!

(Talá mpe Kol. 1:11.)