Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Manuel Reino Berengui/DeFodi Images via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Lisano ya ndembo ya mokili mobimba ekoki mpenza kosala ete bato bákóma na bomoko?—Biblia elobi nini?

Lisano ya ndembo ya mokili mobimba ekoki mpenza kosala ete bato bákóma na bomoko?—Biblia elobi nini?

 Bato soki miliare 5 bazali kolanda lisano ya ndembo ya mokili mobimba oyo ebandaki na mokolo ya 20/11/2022 mpe ekosila na mokolo ya 18/12/2022. Bato mingi bazali kokanisa ete milulu ya masano lokola oyo wana ekosuka kaka te na kosalisa bato oyo bazali kolanda yango bámiyoka ete bazali na bomoko, kasi ekosala mpe mingi koleka.

  •   “Masano ezali na nguya ya kobongola mokili. Ezali na nguya ya kolendisa basusu. Ezali na nguya ya kosangisa bato na lolenge moko ya kokamwa.”—Nelson Mandela, prezida ya kala ya ekólo Afrique du Sud.

  •   “Lisano ya ndembo . . . esangisaka bato mpo epesaka bango elikya, epesaka bango esengo, esalaka ete bákóma na mposa ya kosala likambo moko, esalaka ete bámoniselana bolingo, mpe bámona ete bazali bango nyonso na makanisi ndenge moko.”—Gianni Infantino, prezida ya FIFA. a

 Lisano ya ndembo ya mokili mobimba to masano mosusu nyonso ekoki mpenza kosalisa bato ndenge wana? Elikya ezali ete mokolo mosusu tokozala mpenza na kimya mpe na bomoko?

Lisano ya ndembo esalaka mpenza ete bato bákóma na bomoko?

 Bato balobeli mingi lisano ya ndembo ya mokili mobimba ya mbula oyo. Lisano yango esali ete bato bálobela mingi makambo ya bomoi, makambo ya politiki oyo etali ntomo ya bato, likambo ya kopona loposo, mpe makambo ya nkita.

 Atako bongo, bato mingi basepelaka kotala milulu ya masano oyo esangisaka bikólo mingi, na ndakisa lisano ya ndembo ya mokili mobimba. Kasi, na bokeseni na ndenge oyo bato bakanaka, milulu yango esalaka te ete bato bákóma na bomoko ya solosolo. Kutu, ebimisaka nde makambo oyo etindaka na bokabwani mpe bizaleli oyo Biblia elobaki ete ekomonisa ete tokómi na ntango oyo ebengami “mikolo ya nsuka.”—2 Timote 3:1-5.

Elikya ya solosolo mpo mokili ezala na bomoko

 Biblia ezali na elikya ya solosolo mpo mokili ezala na bomoko. Elaki ete bato nyonso awa na mabele bakozala na bomoko na nse ya boyangeli ya guvɛrnema moko ya likoló oyo ebengami “Bokonzi ya Nzambe.”​—Luka 4:43; Matai 6:10.

 Yesu nde azali Mokonzi na Bokonzi yango. Akosala ete kimya ezala na mabele mobimba. Biblia elobi boye:

  •   “Moyengebene akokola lokola matiti ya sika,mpe kimya ekokóma mingi.”​—Nzembo 72:7.

  •   “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi . . . Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:12, 14.

 Ata lelo oyo, mateya ya Yesu esali ete bamilio ya bato na mikili 239 bázala mpenza na bomoko. Bayekolaki ndenge ya kotika koyina basusu. Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá masolo oyo ezali na motó ya likambo “Koyinana ekoki kosila?

a Fédération Internationale de Football Association.