Lakisá makambo oyo ezali na kati

Boyekoli moko ya Biblia kasi ebendi ebele ya bato

Boyekoli moko ya Biblia kasi ebendi ebele ya bato

Marta, azali Motatoli ya Yehova na Guatemala, azali koyekola monɔkɔ ya Kekchi mpo na kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ yango báyeba nsango ya Biblia. Mokolo moko, amonaki mobali moko azali kobima na lopitalo. Ndenge mobali yango azalaki komonana, etindaki Marta aloba ete mobali yango autaki na mboka Kekchi, esika moko ya ngombangomba epai Batatoli ya Yehova bazalaki mpenza kosakola te. Apusanaki pene ya mobali yango mpe asololaki na ye na monɔkɔ ya Kekchi oyo ayebaki malamu te.

Marta asɛngaki mobali yango báyekola Biblia. Na esengo nyonso mobali yango andimaki koyekola, kasi ayebisaki Marta ete azali na mbongo te mpo na kofuta boyekoli yango. Marta alobaki na ye ete Batatoli ya Yehova bayekolaka na bato Biblia ofele. Ayebisaki mpe mobali yango ete bakoki kobanda koyekola na nzela ya telefone mpe ete libota mobimba ekoki kosangana elongo na ye na boyekoli yango. Mobali yango andimaki. Lokola mobali yango ayebaki koloba mpe kotánga monɔkɔ ya Espagnol, Marta apesaki ye Biblia​—Libongoli ya Mokili ya sika na monɔkɔ ya Espagnol. Marta apesaki ye mpe buku Biblia eteyaka mpenza nini? na monɔkɔ Kekchi. Pɔsɔ oyo elandaki, mobali yango, mwasi na ye, mpe bana na bango mibale babandaki koyekola Biblia na Marta na nzela ya telefone. Bazalaki koyekola mbala mibale na pɔsɔ. Marta alobi boye: “Lokola nazalaki koloba monɔkɔ ya Kekchi malamu te, tozalaki koyekola na Espagnol, mpe mpo mwasi ya mobali yango akanga ntina ya makambo oyo tozalaki koyekola, mobali na ye azalaki kolimbwela ye. Kasi bana bayebaki monɔkɔ ya Espagnol.”

Mobali yango azalaki pastɛrɛ na eglize na ye. Abandaki koteya bandimi na ye makambo oyo azalaki koyekola na Biblia. Bandimi yango bazalaki kosepela na makambo oyo bazalaki koyoka mpe batunaki ye soki azalaki kozwa mateya yango wapi. Ntango abɛtelaki bango lisolo ya boyekoli na ye ya Biblia, bandimi yango mpe bakómaki kokota na boyekoli moto moko nsima na mosusu. Eumelaki te, bato soki 15 bazalaki koyangana pɔsɔ nyonso mpo na koyekola Biblia elongo na Marta na nzela ya telefone. Na nsima, bakómaki kotya mikro pene ya telefone mpo moto nyonso ayokaka malamu.

Ntango Marta ayebisaki bankulutu ya lisangá mpo na boyekoli yango ya Biblia, moko ya bankulutu akendaki kotala mboka epai bayekoli ya Biblia yango bafandaka. Nkulutu yango abengisaki bango bakende kolanda diskur ya bato nyonso oyo mokɛngɛli ya zongazonga * asengelaki kosala na mboka mosusu. Mpo na kokoma na mboka yango basengelaki kosala ngonga moko na motuka to ngonga mibale na makolo. Bayekoli yango bandimaki mpe 17 kati na bango bakendaki.

Mwa bapɔsɔ na nsima, mokɛngɛli ya zongazonga mpe Batatoli ya Yehova mosusu balekisaki mikolo minei elongo na bayekoli yango. Ntɔngɔ nyonso, bazalaki kotala bavideo ya mateya ya Biblia na jw.org na monɔkɔ ya Kekchi, mpe bayekolaki mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? Na nsima ya midi nyonso, bazalaki kotala baprogramɛ ya TV JW. Mokɛngɛli ya zongazonga yango asalaki mpe ete moto na moto azala moto oyo bayekolaka na ye Biblia.

Na boumeli ya mikolo minei yango, Batatoli ya Yehova basakolaki mpe na bamboka ya zingazinga ya Kekchi mpe babengisaki bato báya na likita moko ya ntina mingi. Na likita yango, bandeko basɛngaki bato 47 ete moto na moto azala na boyekoli na ye ya Biblia. Mabota 11 endimaki koyekola Biblia.

Mwa basanza na nsima, bankulutu babongisaki mpo makita ekóma kosalema na mboka yango pɔsɔ nyonso. Lelo oyo, bato soki 40 bazali koyangana na makita mbala na mbala. Mpe ntango bandeko basalaki Ekaniseli ya liwa ya Yesu kuna, basepelaki komona bato 91 bayanganaki na molulu yango.

Marta abosanaka te ndenge lisolo oyo ebandaki mpe ndenge ekómi boye, alobi: “Nazali kopesa Yehova matɔndi mingi. Na bantango mosusu namiyokaka ete nakoki te kosala mingi. Kasi tozali bisaleli na mabɔkɔ ya Nzambe. Ayebaki makambo oyo ezalaki na mitema ya bato ya mboka yango, mpe abendaki bango epai ya basaleli na ye. Yehova alingaka bango.”

^ par. 5 Mokɛngɛli ya zongazonga azali Motatoli ya Yehova oyo atambolaka mpo na kotala masangá soki 20 oyo esalaka zongazonga moko.