Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini bato bakufaka?

Mpo na nini bato bakufaka?

Eyano ya Biblia

 Ekómelaka biso nyonso tómituna soki bato bakufaka mpo na nini, mingimingi ntango ndeko to moninga na biso akufi. Biblia elobi: “Etubeli oyo epesaka liwa ezali lisumu.”​—1 Bakorinti 15:56.

Mpo na nini bato nyonso basalaka masumu mpe bakufaka?

 Mobali ná mwasi ya liboso, Adama ná Eva, bakufaki mpo basalaki lisumu na miso ya Nzambe. (Ebandeli 3:17-19) Kotomboka oyo batombokelaki Nzambe ekokaki komema bango kaka na liwa, mpo bomoi euti epai ya Nzambe.​—Nzembo 36:9; Ebandeli 2:17.

 Adama atikelá bana na ye nyonso mbeba moko: lisumu. Biblia elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Bato nyonso bakufaka mpo bango nyonso basalaka masumu.​—Baroma 3:23.

Ndenge liwa ekolongwa

 Nzambe alaki ete “akolongola mpenza liwa mpo na libela.” (Yisaya 25:8) Mpo na kolongola liwa, asengeli kolongola liboso eloko oyo ememá liwa, elingi koloba lisumu. Nzambe akosala yango na nzela ya Yesu Kristo, oyo “azali kolongola lisumu ya mokili.”​—Yoane 1:29; 1 Yoane 1:7.