Lakisá makambo oyo ezali na kati

Soki moto akufi akómaka ndenge nini?

Soki moto akufi akómaka ndenge nini?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobi: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5; Nzembo 146:4) Na yango, ntango moto akufi, bomoi na ye esili. Akoki kokanisa te, kosala mosala te, mpe koyoka eloko te.

“Ozali putulu mpe okozonga na putulu”

 Nzambe ayebisaki ndenge moto akómaka soki akufi ntango alobaki na mobali ya liboso, Adama. Lokola Adama azangaki botosi, Nzambe ayebisaki ye ete: “Ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Ebandeli 3:19) Liboso Nzambe akelá Adama “na putulu ya mabele,” Adama azalaki na bomoi te. (Ebandeli 2:7) Ndenge moko mpe, ntango Adama akufaki, azongaki na putulu; azalaki lisusu na bomoi te.

 Lelo mpe bato oyo bakufaka bakómaka ndenge wana. Biblia elobeli nsuka ya bato mpe ya banyama; elobi boye: “Bango nyonso bauti na putulu, mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu.”​—Mosakoli 3:19, 20.

Yango elingi nde koloba ete nyonso esukaka na liwa?

 Na bisika mingi, Biblia emonisi ete liwa ezali lokola mpɔngi. (Nzembo 13:3; Yoane 11:11-14; Misala 7:60) Moto oyo alali mpɔngi makasi ayebaka te makambo oyo ezali kosalema zingazinga na ye. Ndenge moko mpe, soki moto akufi, ayebaka eloko te. Kasi, Biblia elobi ete Nzambe akoki kolamwisa bakufi na mpɔngi oyo balalá mpe kozongisa bango na bomoi. (Yobo 14:13-15) Mpo na bato oyo Nzambe akosekwisa, nyonso esukaka na liwa te.