Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 2

Maloba ya ebandeli ya Eteni 2

Mpo na nini Yehova anɔkisaki mbula makasi mpo na kobebisa mokili ya ntango ya kala? Na ebandeli mpenza ya mokili, etumba moko ebandaki: etumba kati na mabe ná malamu. Bato mosusu, na ndakisa Adama, Eva, mpe mwana na bango Kaina, baponaki mabe. Mwa bato mosusu, na ndakisa Abele ná Noa, baponaki malamu. Bato mingi bakómaki kosala mabe mpenza; yango wana Yehova abebisaki mokili wana ya mabe. Eteni oyo ekosalisa biso tóyeba ete Yehova amonaka ngámbo oyo toponi mpe ete akotika ata moke te ete mabe elonga malamu.

NA ETENI OYO

LITEYA 3

Adama ná Eva batosaki Nzambe te

Mpo na nini nzete moko oyo ezalaki na elanga ya Edene ezalaki na ntina mingi? Mpo na nini Eva alyaki mbuma ya nzete yango?

LITEYA 4

Nkanda etindaki ye aboma

Nzambe andimaki likabo ya Abele, kasi oyo ya Kaina te. Ntango Kaina amonaki bongo, asilikaki makasi mpe asalaki likambo moko ya nsɔmɔ.

LITEYA 5

Masuwa ya Noa

Ntango baanzelu ya mabe bayaki kobala basi na mabele, babotaki bana mibali oyo bakómaki konyokola bato. Mobulu ezalaki bisika nyonso. Kasi Noa azalaki moto malamu​—alingaki Nzambe mpe azalaki kotosa ye.

LITEYA 6

Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika

Na Mpela, mbula ebɛtaki mikolo 40, butu moi. Noa ná libota na ye bafandaki na kati ya masuwa koleka mbula mobimba. Nsukansuka, babimaki.