Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 44

Batongeli Yehova tempelo

Batongeli Yehova tempelo

Ntango Salomo akómaki mokonzi ya Yisraele, Yehova atunaki ye: ‘Olingi napesa yo nini?’ Salomo alobaki: ‘Nazali elenge, nayebi te nasala nini. Nabondeli yo, pesá ngai bwanya mpo nabatela bato na yo.’ Yehova alobaki: ‘Lokola osɛngi ozala moto ya bwanya, nakokómisa yo moto oyo aleki na bwanya na mokili mobimba. Nakopesa yo mpe bomɛngo mingi. Lisusu soki otosi ngai, okozala na bomoi molai mpenza.’

Salomo abandaki kotonga tempelo. Asalelaki wolo, palata, mabaya, ná mabanga oyo elekaki kitoko. Ebele ya basi ná mibali oyo bayebaki mosala basalaki mosala ya kotonga tempelo yango. Nsima ya mbula nsambo, tempelo esilaki mpe esengelaki kopesa yango Yehova. Batyaki etumbelo mpe makabo ya kotumba likoló na yango. Salomo afukamaki liboso ya etumbelo yango mpe abondelaki: ‘Ee Yehova, monene mpe kitoko ya tempelo oyo ekoki na yo te, kasi tobondeli yo ondima losambo na biso mpe mabondeli na biso.’ Yehova akanisaki nini mpo na tempelo yango mpe libondeli ya Salomo? Ntango kaka Salomo asilisaki kobondela, mɔtɔ ekitaki mpe etumbaki makabo oyo ezalaki likoló ya etumbelo. Yehova andimaki tempelo yango. Ntango Bayisraele bamonaki bongo, basepelaki mingi.

Bwanya ya Mokonzi Salomo eyebanaki na Yisraele mobimba mpe na bamboka mosusu ya mosika. Bato bazalaki koya epai ya Salomo mpo akatela bango makambo. Ata mokonzi-mwasi ya Sheba ayaki komeka ye na mituna ya makasi. Ntango ayokaki biyano oyo Salomo apesaki, alobaki: ‘Nandimaki te makambo oyo bato bayebisaki ngai mpo na yo, kasi sikoyo namoni ete bwanya na yo eleki mpenza oyo balobaki. Nzambe na yo, Yehova, apamboli yo mpenza.’ Bomoi ezalaki malamu na Yisraele mpe bato bazalaki na esengo. Kasi mwa moke na nsima, makambo ebongwanaki.

“Talá! moto oyo aleki Salomo azali awa.”​—Matai 12:42