Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 9

Nsukansuka babotaki mwana!

Nsukansuka babotaki mwana!

Abrahama ná Sara baumelaki na libala bambula ebele mpenza. Batikaki ndako na bango ya kitoko na engumba Ure mpe bakómaki kofanda na hema. Kasi Sara azalaki komilelalela te, mpo atyelaki Yehova motema.

Lokola Sara azalaki mpenza na mposa ya mwana, ayebisaki Abrahama ete: ‘Soki mosaleli na ngai Agare aboti na yo mwana, nakoki kozwa ye lokola mwana na ngai.’ Nsima ya mikolo, Agare abotaki mwana mobali. Nkombo na ye ezalaki Yishimaele.

Bambula ebele na nsima, ntango Abrahama akómaki na mbula 99 mpe Sara na mbula 89, bapaya misato bayaki epai na bango. Abrahama asɛngaki bango bápema na nse ya nzete moko, mpe balyaki elongo. Bapaya yango ezalaki banani? Ezalaki baanzelu! Bayebisaki Abrahama ete: ‘Na mbula ekoya na ntango lokola oyo, mwasi na yo akobota mwana mobali.’ Sara azalaki koyoka bango na kati ya hema. Asɛkaki na motema mpe alobaki: ‘Ngai nakobota mpenza awa nakómi mpaka boye?’

Na mbula oyo elandaki, Sara abotaki mwana mobali, kaka ndenge anzelu ya Yehova alobaki. Abrahama apesaki ye nkombo Yisaka, oyo elimboli “Kosɛka.”

Ntango Yisaka akómaki na mbula soki mitano, Sara amonaki ete Yishimaele azalaki kotyola ye. Sara alingaki kobatela mwana na ye; asololaki na Abrahama mpe asɛngaki ye abengana Agare ná Yishimaele. Na ebandeli, Abrahama alingaki te. Kasi Yehova ayebisaki Abrahama ete: ‘Yokelá Sara. Nakobatela Yishimaele. Kasi nakokokisa bilaka na ngai nde na nzela ya Yisaka.’

“Na kondima mpe Sara azwaki nguya ya kokumba zemi ya momboto, . . . mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.”​—Baebre 11:11