Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA​—NDENGE OYO EBATELAMAKI

Biblia ezali tii lelo atako ekomamaki na biloko oyo ebebaka

Biblia ezali tii lelo atako ekomamaki na biloko oyo ebebaka

LIKAMA: Bato oyo bakomaki Biblia mpe baoyo basalaki bakopi na yango basalelaki libosoliboso papirisi mpe mposo ya nyama mpo na kokoma. * (2 Timote 4:13) Ndenge nini yango ezalaki likama mpo na Biblia?

Papirisi epasukaka, elongwaka langi, mpe elɛmbaka na pɛtɛɛ nyonso. Richard Parkinson ná Stephen Quirke, oyo bayekolaka makambo ya Ezipito balobi boye: “Eteni ya Papirisi ekoki kobeba, kotikala nsingansinga mpe kokóma putulu. Soki babombi yango, rulo ekoki kobeba to kopɔla na mai mpe banyama ya mikemike to mpoko ekoki kolya yango mpe soki bakundi yango, mingimingi bafurmi ya mpɛmbɛ elyaka yango.” Bapapirisi mosusu oyo batyaki yango na esika ya pole to malili makasi ebebaki noki.

Mposo ya nyama eumelaka koleka papirisi, kasi yango mpe soki ebombami malamu te to etyami na esika ya molunge, malili to pole ekoki kobeba. * Banyama mikemike mpe balyaka mposo ya nyama. Mpo na mikanda mosusu ya kala, buku moko (Everyday Writing in the Graeco-Roman East) elobi boye: “Esalemaka mingi te ete mokanda eumela mingi mpenza.” Soki Biblia ebebaka, nsango na yango mpe elingaki kolimwa.

NDENGE OYO BIBLIA EBATELAMAKI: Mobeko ya Bayuda esɛngaki mokonzi nyonso ‘akoma mpo na ye moko na buku mosusu mobeko oyo’ ezali na mikanda mitano ya liboso ya Biblia. (Kolimbola Mibeko 17:18) Lisusu, bato oyo bayebaki mpenza kosala bakopi babimisaki bamaniskri ebele yango wana tii na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso bakopi yango ezalaki na basinagoga ya Yisraele mobimba ata mpe mosika na Masedonia! (Luka 4:16, 17; Misala 17:11) Ndenge nini bamaniskri mosusu ya kala mpenza ebatelamaki tii lelo oyo?

Bamaniskri oyo babengaka Barulo ya Mbu Ekufá ebatelamaki na boumeli ya basiɛklɛ na kati ya bambɛki oyo babombá na mabulu na bisika oyo ekauká

Philip Comfort, moto ya mayele na makambo etali Testama ya sika alobi boye: “Bayuda bazalaki kotya barulo ya Makomami na bilokó to bambɛki mpo ebeba te.” Bakristo mpe bakobaki kosala kaka bongo. Yango wana bamaniskri mosusu ya libosoliboso ya Biblia bamonaki yango na kati ya bambɛki, na nse ya mabulu mpe na bisika oyo ekauká.

NA NSUKA: Ebele ya biteni ya bamaniskri ya Biblia; oyo mosusu na yango eumeli mbula koleka 2 000 ezali tii lelo. Ezali ata na makomi mosusu te ya kala oyo bamaniskri na yango eumelá bongo.

^ par. 3 Bazalaki kosala papirisi na molona moko ya mai oyo babengaka yango mpe papirisi. Mposo ya nyama bazalaki kosala yango kaka na mposo ya nyama.

^ par. 5 Na ndakisa, mokanda oyo emonisaka ete États-Unis ezwaki lipanda, ekomamaki na mposo ya nyama. Kutu, ekokisi naino mbula 250 te, kasi kotánga makomi na yango ekómi mpasi.