Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO

“Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”

“Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”

RAHABA azali kotala na fenetre na ye ndenge kongɛnga ya moi ya ntɔngɔ ezali kobɛta na Lobwaku ya patatalu oyo ezingi Yeriko. Limpinga ya basoda ya Yisraele eyangani mpe elingi kokɔta na Yeriko. Ntango babandaki kozinga engumba yango, putulu ezalaki komata nsima na bango mpe lokito makasi ya maseke ezalaki koyokana.

Yeriko ezalaki mboka ya Rahaba; ayebaki babalabala, bandako, bazando mpe bamagazini na yango oyo ezalaki na bato ebele. Kutu, ayebaki bato ya engumba yango malamu. Wana mikolo ezalaki koleka akokaki komona ndenge kobanga ya bato ya engumba na ye ezalaki kokóma makasi mpe Bayisraele bazalaki kokoba kosala kaka likambo moko wana: kotambola zingazinga ya engumba yango mbala moko na mokolo. Atako lokito ya maseke oyo bazalaki kobɛta ezalaki koyokana na babalabala mpe bisika minene ya Yeriko, Rahaba azalaki kobanga te ndenge bato ya Yeriko bazalaki kobanga.

Rahaba amonaki ndenge limpinga ya basoda ebandaki kozinga Yeriko na ntɔngɔ mpenza mokolo ya nsambo. Na katikati ya basoda ya Yisraele, Rahaba amonaki banganga-nzambe ya Yisraele bazali kobɛta maseke mpe bamemi sanduku mosantu, oyo ezalaki komonisa ete Yehova, Nzambe na bango azali na kati na bango. Tokoki komona na makanisi ndenge lobɔkɔ ya Rahaba esimbi nsinga moko ya motane oyo ezali na fenetre na ye, oyo ekangamaki na efelo monene ya Yeriko. Nsinga yango esalisaki Rahaba abosana te elaka oyo bapesaki ye ete ye ná libota na ye bakobika ntango engumba yango ekobomama. Rahaba atɛkaki nde mboka na bango? Yehova atalelaki ye bongo te; kutu atalelaki ye nde lokola mwasi ya kondima mpenza. Tótalela naino lisolo ya bomoi ya Rahaba mpe tómona mateya oyo tokoki kozwa epai na ye.

RAHABA MWASI YA NDUMBA

Rahaba azalaki mwasi ya ndumba. Na kala, likambo yango ezalaki kosepelisa te bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia, mpe bazalaki koloba ete Rahaba azalaki na ndako ya koyamba bapaya. Kasi, Biblia elobeli likambo yango polele. (Yosua 2:1; Baebre 11:31; Yakobo 2:25) Na mimeseno ya bato ya Kanana, ekoki kozala ete mosala ya Rahaba ezalaki mabe te. Atako kindumba ezalaki mabe te na mimeseno na bango, Rahaba ayebaki ete ezaleli yango ezali mabe. (Baroma 2:14, 15) Ekoki kozala ete Rahaba azalaki koyoka nsɔni na lolenge ya bomoi na ye. Ndenge moko na bato mingi lelo, mbala mosusu Rahaba azalaki komona ete mpo na kosunga libota na ye, asengelaki kaka kosala mosala wana.

Na ntembe te, Rahaba azalaki mpenza na mposa ya kozala na bomoi ya malamu. Mboka oyo azalaki kofanda etondaki na mobulu mpe misala ya mbindo, na ndakisa bandeko ya libota bazalaki kosangisa nzoto bango na bango mpe bato ná banyama bazalaki kosangisa nzoto. (Balevi 18:3, 6, 21-24) Lokola mabe ya ndenge wana ekolaki mingi, ekɔtaki mpe na makambo ya losambo. Na batempelo, bazalaki kotinda bato basalaka milulu ya kindumba, mpe losambo ya banzambe ya bademo lokola Baala mpe Moleke ezalaki kosɛnga kotumba bana oyo bazali na bomoi na mɔtɔ mpo na kopesa mbeka.

Yehova azalaki komona makambo nyonso oyo ezalaki kosalema na Kanana. Na yango, mpo na makambo mabe oyo bato ya Kanana bazalaki kosala, Yehova alobaki ete: “Mokili ezali mbindo, mpe nakoyeisela yango etumbu mpo na libunga na yango, mpe mokili ekosanza bato oyo bafandi wana.” (Balevi 18:25) “Etumbu mpo na libunga na yango” elimboli nini? Nzambe apesaki Bayisraele elaka oyo: “Yehova Nzambe na yo akobengana mpenza bikólo oyo liboso na yo mokemoke.” (Kolimbola Mibeko 7:22) Basiɛklɛ liboso, Yehova alakaki ete akopesa libota ya Abrahama mokili, mpe ‘Nzambe akoki kobuka lokuta te.’​—Tito 1:2; Ebandeli 12:7.

Kasi, Yehova alobaki mpe ete mabota mosusu ya mokili yango ekobebisama mpenza. (Kolimbola Mibeko 7:1, 2) Lokola azali ‘mosambisi ya sembo ya mabele mobimba,’ atángaki na kati ya motema mokomoko mpe ayebaki malamumalamu ndenge mabe mpe ezaleli na bango ya mbindo ezwaki misisa. (Ebandeli 18:25; 1 Ntango 28:9) Rahaba azalaki koyoka ndenge nini lokola azalaki kofanda na engumba ya ndenge wana oyo esengelaki kobomama? Tokoki mpe komona na makanisi ndenge amiyokaki ntango ayokaki makambo oyo Bayisraele basalaki. Ayokaki ndenge Nzambe atambwisaki libota na ye, ekólo oyo ezalaki na boombo, mpo esilisa nyɛɛ basoda ya Ezipito, oyo ezalaki na ntango wana nguya ya mokili mobimba. Mpe Yisraele ezalaki komibongisa mpo na kobundisa Yeriko! Kasi, bato ya engumba yango batingamaki na mabe na bango. Tokoki mpenza komona ntina oyo Biblia elobi mpo na Bakanana, bato ya mboka ya Rahaba ete “bazangaki botosi.”​—Baebre 11:31.

Rahaba azalaki bongo te. Na boumeli ya mbula ebele, azalaki kotalela bansango oyo ayokaki mpo na Yisraele mpe Yehova, Nzambe na bango, oyo akesanaki mpenza na banzambe ya Kanana! Azalaki Nzambe oyo abundaki mpo na basaleli na ye, asalisaki bango bákóma na bizaleli oyo ebongi, na esika ete asala bango mabe. Nzambe yango azwaka basi na motuya mingi, kasi te kaka lokola mwa biloko ya kosangisa na yango nzoto oyo moto akoki kosomba, kotɛka mpe kokitisa lokumu na yango mpo na losambo ya lokuta. Ntango Rahaba ayokaki ete Bayisraele bazali na ngambo mosusu ya Yordani, mpe ete balingi bákɔta, na ntembe te amitungisaki mpo na oyo ekokómela bato ya mboka na ye. Yehova amonaki Rahaba mpe amonaki likambo ya malamu epai na ye?

Lelo oyo, bato mingi bazali lokola Rahaba. Bamimonaka ete bakangami na bomoi moko ya mbindo, oyo esilisaka bango valɛrɛ mpe esengo; bakanisaka ete ata moto moko te amonaka bango mpe bazali na valɛrɛ te. Ndakisa ya Rahaba esalisi biso tóyeba ete Nzambe amonaka moto nyonso. Ezala tomimoni ete tozali mpamba, “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Azalaka mosika te, mpe azalaka na mposa makasi mpenza ya kopesa elikya na baoyo nyonso bamonisaka kondima epai na ye. Rahaba asalaki bongo?

AYAMBAKI BANƆNGI

Mokolo moko, ntango mosusu liboso ete Bayisraele bábanda kotambola zingazinga ya Yeriko, bapaya mibale bayaki epai ya Rahaba. Mibali yango mibale bakanisaki ete bato bakoyeba bango te, kasi na engumba wana oyo bato bazalaki motema likoló, mingi na bango bazalaki ekɛngɛ mpo na koyeba monɔngi nyonso oyo akokaki kouta na Yisraele. Ekoki kozala ete Rahaba ayebaki mbala moko soki mibali yango bazali banani. Ezali te mbala ya liboso mibali baya epai na ye, nzokande baoyo mibale bazalaki kaka koluka esika ya kolala, kasi te mpo na koluka mwasi ya ndumba.

Mibali yango mibale bazalaki banɔngi oyo bautaki na kaa ya Bayisraele. Yosua, moto oyo azalaki kotambwisa bango, atindaki bango mpo báyeba bisika oyo bato ya Yeriko bazali makasi mpe makasi te. Yeriko ezalaki engumba ya liboso ya Kanana oyo Bayisraele balingaki kokɔtela mpe ekoki kozala ete yango nde ezalaki makasi koleka bingumba nyonso. Yosua alingaki kaka koyeba likambo nini ye ná bato na ye bakokaki kokutana na yango. Na ntembe te, banɔngi wana bayebaki ntina oyo baponaki ndako ya Rahaba. Bayebaki ete na bisika nyonso, na ndako ya mwasi ya ndumba nde bato bakokoka te koyeba ete bapaya bazali kuna. Ekoki mpe kozala ete banɔngi yango bazalaki na likanisi ya kozwa bansango na makambo nyonso bakokaki koyoka ntango bato bazali kobɛta masolo.

Biblia elobi ete Rahaba ‘ayambaki bamemi-nsango yango malamu.’ (Yakobo 2:25) Akɔtisaki bango na ndako na ye mpe atako ayebaki mpenza te soki bazali banani mpe bayei koluka nini, andimaki báfanda epai na ye. Ntango mosusu alingaki koyeba makambo mingi na ntina na Nzambe na bango Yehova.

Kasi, na mbala moko, bamemi-nsango oyo bautaki epai ya mokonzi ya Yeriko bakómaki! Nsango etambolaki ete banɔngi oyo bautaki na Yisraele bayei na ndako ya Rahaba. Rahaba akosala nini? Soki abateli bapaya wana mibale, akotya te bomoi na ye mpe oyo ya libota na ye mobimba na likama? Bato ya Yeriko balingaki te koboma bango nyonso soki abateli banguna wana? Ekoki kozala na ntango wana nde Rahaba ayaki koyeba soki mibali yango bazali banani. Soki ayebaki liboso ete Yehova azali Nzambe moko malamu koleka oyo ya ye, yango ekokaki kozala libaku malamu mpo na kopona kosalela ye.

Rahaba azalaki na ntango mingi te mpo na kokanisa, kasi amonisaki mayele mpe asalaki nokinoki. Abombaki banɔngi yango na kati ya mwa banzete ya lini oyo atandaki likoló ya nsamba ya ndako na ye mpo ezwa moi. Na nsima, ayebisaki bamemi-nsango ya mokonzi boye: “Ya solo, mibali wana bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te epai bango bauti. Mpe esalemaki boye: na ntango ya kokanga porte, wana molili ebandaki kokɔta, mibali yango babimaki. Nayebi te esika mibali yango bakei. Bólanda bango nokinoki, mpo bokozwa bango.” (Yosua 2:4, 5) Meká naino komona na makanisi ndenge Rahaba azali kotala bilongi ya bamemi-nsango ya mokonzi. Azalaki komituna soki bakotuna ye mpo na nini motema na ye ezali kobɛta?

Rahaba atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abombaki basaleli mibale ya Yehova na kati ya mwa banzete ya lini

Mayele na ye elongaki! Bamemi-nsango yango balandaki bango mbangu na nzela oyo bakatisaka Yordani na makolo. (Yosua 2:7) Na ntembe te, Rahaba ayokaki motema ekiti. Na nzela ya mwa mayele wana, akosaki bato wana ya mabe oyo esengelaki te koyebisa bango esika oyo banɔngi wana babombamaki, mpe na ndenge yango, abikisaki basaleli wana ya Yehova oyo basalaki eloko te.

Rahaba akimaki mbangu na nsamba ya ndako na ye mpe ayebisaki banɔngi yango mibale likambo oyo auti kosala. Ayebisaki mpe bango likambo moko ya ntina: Bato na ngai bazali na nsɔmɔ makasi mpe bazali kobanga Bayisraele. Nsango oyo kitoko esepelisaki mpenza banɔngi. Bato wana mabe ya Kanana bazalaki kaka kobanga nguya ya Yehova, Nzambe ya Yisraele! Na nsima, Rahaba alobaki likambo moko oyo ezali na ntina mingi mpo na biso. Alobaki ete: “Yehova Nzambe na bino azali Nzambe kuna na likoló mpe awa na mabele, na nse.” (Yosua 2:11) Makambo oyo ayokaki na ntina na Yehova eteyaki ye ete: Asengeli mpenza kotyela Nzambe ya Yisraele motema. Andimelaki Yehova.

Rahaba andimisamaki mpenza ete Yehova akolongisa bato na ye. Na yango, asɛngaki bámonisela ye motema mawa, abondelaki ete ye ná libota na ye babatelama. Banɔngi yango bandimaki, bayebisaki Rahaba ete aloba likambo yango te mpe asengeli kodiembelisa nsinga ya motane na fenetre na ye oyo ekangamaki na efelo ya engumba mpo basoda babatela ye ná libota na ye.​—Yosua 2:12-14, 18.

Tokoki kozwa liteya moko ya ntina mingi na likambo etali kondima ya Rahaba. Ndenge Biblia emonisi yango, “kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.” (Baroma 10:17) Ayokaki bansango ya malamu oyo etali nguya mpe bosembo ya Yehova Nzambe, yango wana andimelaki ye mpe atyelaki ye motema. Lelo oyo, tozali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa biso tóyeba Yehova. Tokoluka koyeba ye mpe komonisa kondima epai na ye ntango tozali koyekola Liloba na ye Biblia.

ENGUMBA MAKASI EKWEI

Nsima ya kolanda toli ya Rahaba, banɔngi yango mibale bakitaki na efelo na nzela ya nsinga oyo ezalaki na fenetre na ye mpe bakendaki mbala moko na bangomba. Mibenga mpe bangomba ya milai ezalaki mingi na nɔrdi ya Yeriko, mpe banɔngi bamibombaki kuna tii ntango bakokaki kozonga na kaa ya Yisraele kozanga likama mpe komemela bango nsango ya kitoko oyo bayokaki epai ya Rahaba.

Rahaba amonisaki kondima epai ya Nzambe ya Bayisraele

Na nsima, bato ya Yeriko bakómaki lisusu na nsɔmɔ ntango bayokaki ete Yehova akabolaki Ebale Yordani na ndenge ya likamwisi, mpe Bayisraele bakatisaki na makolo. (Yosua 3:14-17) Kasi mpo na Rahaba nsango wana endimisaki ye lisusu ete kondima na ye epai ya Yehova ezalaki ya bozoba te.

Na nsima, ntango ekokaki mpo Bayisraele babanda kotambola zingazinga ya Yeriko; basalaki yango mbala moko na mokolo na boumeli ya mikolo motoba. Sikoyo, mokolo ya nsambo ekokaki mpe, mokolo yango ekesanaki na mikolo mosusu. Ndenge tolobelaki yango na ebandeli ya lisolo oyo, babandaki kotambola na ntɔngɔ, mpe ntango limpinga ya basoda ezingaki engumba mbala ya liboso, mbala ya mibale mpe ekobaki kotambola zingazinga ya Yeriko mbala na mbala. (Yosua 6:15) Bayisraele bazalaki kosala nini?

Nsukansuka, na mokolo ya nsambo, ntango kotambola ya mbala nsambo ekómaki na nsuka, basoda batɛlɛmaki. Batikaki kobɛta maseke. Bafandaki mpenza kimya. Bato ya engumba yango bakómaki mpenza motema likoló. Na nsima, ntango Yosua ayebisaki bango, basoda ya Yisraele batombolaki mingongo na bango mpo na mbala ya liboso, mpe bagangaki makasi. Basinzili oyo bazalaki likoló ya efelo ya Yeriko bakanisaki nde ete ezali etumba moko ya nsɔmɔ to ezali kaka makelele ya mpamba? Soki ezali bongo, balekisaki ntango te mpo na kokanisa. Efelo wana ya monene ebandaki koningana. Ebandaki kotya banzela, na nsima ekweaki! Ntango putulu esilaki, bamonaki ete mwa eteni ya efelo moko ekweaki te. Kaka ndako ya Rahaba, mwasi ya kondima nde etikalaki. Kanisá naino ndenge ayokaki ntango amonaki ete Yehova abateli ye! * Libota na ye mpe ebikaki!​—Yosua 6:10, 16, 20, 21.

Basaleli ya Yehova basepelaki na Rahaba mpo na kondima na ye. Ntango bamonaki ndako moko etɛlɛmi na kati ya libondo ya biloko, bayebaki ete Yehova azali na mwasi yango. Ye ná libota na ye babikaki ntango engumba wana ya mabe ebebisamaki. Nsima ya etumba, bapesaki Rahaba nzela afanda mosika te ya kaa ya Bayisraele. Na nsima, Rahaba akómaki mpe Moyuda. Abalaki Salemone. Mwana na bango ya mobali Boaze, akolaki mpe akómaki na kondima makasi. Abalaki Ruta, moto ya Moabe. * (Ruta 4:13, 22) Mokonzi Davidi mpe na nsima Yesu Kristo, Masiya bautaki na libota wana oyo ezalaki na kondima makasi.​—Yosua 6:22-25; Matai 1:5, 6, 16.

Lisolo ya Rahaba emonisi ete moto nyonso azali na motuya na miso ya Yehova. Atalaka biso nyonso, atángaka na mitema na biso, mpe ndenge asalaki epai ya Rahaba, asepelaka soki amoni ata mwa kondima moke epai na biso. Kondima na ye etindaki ye amonisa yango na misala. Ndenge Biblia elobi “atángamaki moyengebene mpo na misala na ye.” (Yakobo 2:25) Tokomonisa mpenza bwanya soki tomekoli kondima na ye!

^ par. 27 Likambo ya esengo, Yehova akokisaki elaka oyo banɔngi mibale bapesaki Rahaba.

^ par. 28 Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali Ruta mpe Boaze, talá masolo “Mekolá kondima na bango” oyo ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2012 mpe ya 01/10/2012.