Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mateya nini tokoki kozwa epai ya basi oyo Biblia elobeli?

Mateya nini tokoki kozwa epai ya basi oyo Biblia elobeli?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli basi mingi oyo bomoi na bango ekoki koteya biso makambo ya ntina. (Baroma 15:4; 2 Timote 3:16, 17) Lisolo oyo elobeli na mokuse mwa ndambo ya basi yango. Mingi na bango bazali ndakisa malamu ya komekola. Kasi basusu bazali ndakisa ya komekola te.​—1 Bakorinti 10:11; Baebre 6:12.

  Abigaile

 Abigaile azalaki nani? Azalaki mwasi ya mozwi moko na nkombo Nabale oyo azalaki makambo makasimakasi. Kasi, Abigaile azalaki na bokɛngi mpenza mpe na komikitisa. Azalaki kitoko mingi na nzoto mpe azalaki na bizaleli oyo esepelisaka Yehova.​—1 Samwele 25:3.

 Asalaki nini? Abigaile asalaki na bwanya mpe na bokɛngi mpo na kokima likama. Ye ná Nabale bazalaki kofanda na etúká oyo Davidi azalaki kokimakima mpo na komibomba. Ntango Davidi oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Yisraele ná bato na ye bazalaki kuna, babatelaki etonga ya bampate ya Nabale mpo miyibi báyiba yango te. Kasi ntango Davidi atindaki bamemi-nsango na ye básɛnga Nabale mwa biloko ya kolya, Nabale aboyaki kopesa bango mpe akatelaki bango mangala. Davidi asilikaki makasi! Yango wana ye ná bato na ye basimbaki nzela mpe bakendaki mpo na koboma Nabale ná mibali nyonso ya ndako na ye.​—1 Samwele 25:10-12, 22.

 Abigaile asalaki nokinoki ntango ayokaki makambo oyo mobali na ye asalaki. Apesaki basaleli na ye biloko mpo bámemela Davidi ná bato na ye mpe alandaki bango na nsima mpo na kobondela Davidi ayokela bango mawa. (1 Samwele 25:14-19, 24-31) Ntango Davidi amonaki likabo oyo Abigaile amemelaki ye, komikitisa ya Abigaile mpe toli ya bwanya oyo apesaki ye, Davidi amonaki ete Nzambe nde asalelaki Abigaile mpo na kopekisa ye aboma Nabale ná bato na ye. (1 Samwele 25:32, 33) Mwa moke na nsima, Nabale akufaki mpe Abigaile akómaki mwasi ya Davidi.​—1 Samwele 25:37-41.

 Ndakisa ya Abigaile ekoki koteya biso nini? Atako azalaki kitoko mingi mpe na bomɛngo, Abigaile azalaki komitalela na ndenge ebongi. Mpo na kobatela kimya, andimaki kosɛnga bolimbisi na likambo oyo ezalaki foti na ye te. Na kimya nyonso, asilisaki likambo moko oyo ezalaki pɛtɛɛ te, asalaki yango na bokɛngi, na mpiko mpe na mayele.

  Debora

 Debora azalaki nani? Azalaki mosakoli-mwasi oyo Nzambe ya Yisraele, Yehova, asalelaki mpo na koyebisa bato na ye makambo oyo azalaki kosɛnga bango básala. Nzambe asalelaki ye mpe mpo na kosambisa makambo oyo Bayisraele bazalaki na yango.​—Basambisi 4:4, 5.

 Asalaki nini? Na mpiko nyonso, mosakoli-mwasi Debora apesaki basaleli ya Nzambe mabɔkɔ. Na litambwisi ya Nzambe, asɛngaki Barake akamba limpinga ya basoda ya Yisraele mpo na kobundisa Bakanana oyo bazalaki konyokola bango. (Basambisi 4:6, 7) Ntango Barake asɛngaki Debora akende elongo na ye, Debora abangaki te, andimaki kokende elongo na ye.​—Basambisi 4:8, 9.

 Ntango Nzambe apesaki Bayisraele elonga moko monene, Debora nde akomaki eteni ya maloba ya loyembo oyo ye ná Barake bayembaki mpo na elonga yango. Na loyembo yango, alobelaki likambo oyo Yaele, mwasi mosusu ya mpiko asalaki mpo Bayisraele bálonga Bakanana.​—Basambisi, mokapo 5.

 Ndakisa ya Debora ekoki koteya biso nini? Debora azalaki na mpiko mpe na elimo ya komipimela. Alendisaki basusu básala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. Ntango basalaki bongo, apesaki bango mpenza longonya.

  Delila

 Delila azalaki nani? Azalaki mwasi moko oyo Samsone, mosambisi moko ya Yisraele alingaki mingi.​—Basambisi 16:4, 5.

 Asalaki nini? Andimaki mbongo oyo bakonzi ya Filistia bapesaki ye mpo atɛka Samsone, moto oyo Nzambe azalaki kosalela mpo na kobikisa Bayisraele na mabɔkɔ ya Bafilistia. Bafilistia bazalaki kokoka kokanga ye te mpo azalaki na makasi moko ya kokamwa. (Basambisi 13:5) Yango wana bakonzi na bango balingaki Delila asalisa bango.

 Bafilistia bafutaki Delila mbongo mpo aluka koyeba soki makasi ya Samsone eutaka wapi. Delila azwaki mbongo yango; mpe na nsima ya komeka mbala na mbala, nsukansuka ayaki koyeba sekele ya Samsone. (Basambisi 16:15-17) Na nsima ayebisaki Bafilistia sekele yango mpe bakangaki Samsone mpe batyaki ye na bolɔkɔ.​—Basambisi 16:18-21.

 Ndakisa ya Delila ekoki koteya biso nini? Delila azali ndakisa ya komekola te. Mpo na lokoso na ye, asalelaki mosaleli ya Nzambe makambo na bokosi, na bosembo te mpe na moimi.

  Estere

 Estere azalaki nani? Azalaki Moyuda moko oyo Ahasueruse mokonzi ya Perse aponaki ye akóma mwasi na ye.

 Asalaki nini? Mokonzi-mwasi Estere asalelaki nguya oyo azalaki na yango mpo báboma te bato ya ekólo na ye. Ayaki koyeba ete mobeko moko ebimaki, batyaki mokolo moko ya koboma Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na ampire ya Perse. Mayele mabe yango eutaki epai ya mobali moko na nkombo Hamane, oyo azalaki ministre-mokonzi. (Estere 3:13-15; 4:1, 5) Na lisalisi ya ndeko na ye Mordekai, oyo azalaki mokóló na ye, Estere atyaki bomoi na ye na likama mpe ayebisaki mobali na ye, Mokonzi Ahasueruse mayele mabe yango. (Estere 4:10-16; 7:1-10) Na nsima Ahasueruse apesaki Estere ná Mordekai nzela ya kobimisa mobeko mosusu, oyo ekopesa Bayuda nzela ya komibatela soki balingi kosala bango mabe. Bayuda balongaki mpenza banguna na bango.​—Estere 8:5-11; 9:16, 17.

 Ndakisa ya Estere ekoki koteya biso nini? Mokonzi-mwasi Estere atiká ndakisa malamu na likambo etali komonisa mpiko, komikitisa mpe kozanga kolekisa ndelo. (Nzembo 31:24; Bafilipi 2:3) Atako azalaki kitoko mingi mpe na lokumu, alukaki toli mpe lisalisi. Ntango asololaki na mobali na ye, alobaki na mayele mpenza mpe na limemya, kasi na mpiko. Mpe ntango oyo bomoi ya Bayuda ekómaki na likama mpenza, na mpiko nyonso amimonisaki ete azali moko na bango.

  Eva

 Eva azalaki nani? Azalaki mwasi ya liboso oyo Nzambe akelaki mpe mwasi ya liboso oyo Biblia elobeli.

 Asalaki nini? Eva atosaki te mobeko ya polele oyo Nzambe apesaki. Ndenge moko na mobali na ye Adama, Eva mpe azalaki moto ya kokoka, na bonsomi ya kopona mpe azalaki na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe, na ndakisa, bolingo mpe bwanya. (Ebandeli 1:27) Eva ayebaki ete Nzambe ayebisaki Adama ete soki balye mbuma ya nzete moko, bakokufa. Kasi, Satana akosaki ye ete akokufa te. Kutu, andimisaki ye ete akozala na bomoi ya malamu koleka soki atosi Nzambe te. Yango wana alyaki mbuma yango mpe na nsima andimisaki mobali na ye alya yango.​—Ebandeli 3:1-6; 1 Timote 2:14.

 Ndakisa ya Eva ekoki koteya biso nini? Eva azali ndakisa ya komekola te na likambo etali kofandisa bamposa mabe na motema. Mposa makasi oyo akolisaki ya kozwa eloko oyo ezalaki ya ye te etindaki ye abuka mobeko ya polele oyo Nzambe apesaki.​—Ebandeli 3:6; 1 Yoane 2:16.

  Hana

 Hana azalaki nani? Azalaki mwasi ya Elekana mpe mama ya Samwele, oyo akómaki mosakoli ya lokumu na Yisraele.​—1 Samwele 1:1, 2, 4-7.

 Asalaki nini? Ntango azalaki kobota te, Hana asɛngaki Nzambe abɔndisa ye. Mobali ya Hana azalaki na basi mibale. Mwasi na ye mosusu, Penina, azalaki na bana; kasi Hana azalaki kobota te atako asalaki bambula mingi na libala. Penina azalaki kotumola ye mpenza, kasi Hana azalaki kobondela Nzambe mpo abɔndisa ye. Alakaki Nzambe ete soki apesi ye mwana, akopesa ye mwana yango mpo asala na tabernakle, hema oyo bazalaki komema, oyo Bayisraele bazalaki kosalela mpo na losambo.​—1 Samwele 1:11.

 Nzambe ayanolaki na libondeli ya Hana, mpe abotaki Samwele. Hana atosaki elaka na ye mpe akendaki kotika Samwele na tabernakle ntango azalaki naino mwana mpenza. (1 Samwele 1:27, 28) Mbula na mbula, azalaki kosalela ye mwa kazaka ezangá mabɔkɔ, mpe azalaki komemela ye yango. Na nsima, Nzambe apambolaki Hana; apesaki ye bana mosusu mitano​—misato ya mibali mpe mibale ya basi.​—1 Samwele 2:18-21.

 Ndakisa ya Hana ekoki koteya biso nini? Mabondeli oyo Hana azalaki kosala na motema mobimba esalisaki ye ayika mpiko na mikakatano. Libondeli na ye ya komonisa botɔndi oyo ezali na 1 Samwele 2:1-10 emonisi kondima makasi oyo azalaki na yango epai ya Nzambe.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Hana, talá lisolo “Abondelaki Nzambe na motema mobimba.”

  •  Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atikaki basaleli na ye bábala basi ebele na ntango moko boye, talá lisolo “Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?

  Yaele

 Yaele azalaki nani? Azalaki mwasi ya Hebere, mobali oyo azalaki Moyisraele te. Yaele apesaki basaleli ya Nzambe mabɔkɔ na mpiko nyonso.

 Asalaki nini? Yaele asalaki na mpiko nyonso ntango Sisera, mokonzi ya limpinga ya Bakanana, ayaki na hema na ye. Sisera alongaki etumba te ntango abundisaki Bayisraele mpe alukaki esika ya komibomba mpo na kopema. Yaele asɛngaki ye aya komibomba mpe kopema na hema na ye. Ntango alalaki, Yaele abomaki ye.​—Basambisi 4:17-21.

 Likambo oyo Yaele asalaki ekokisaki esakweli moko oyo Debora alobaki: “Ezali na lobɔkɔ ya mwasi moko nde Yehova akotɛka Sisera.” (Basambisi 4:9) Mpo na likambo oyo asalaki, bakumisaki Yaele ndenge balobaki ete ‘apambwamaki koleka basi nyonso.’​—Basambisi 5:24.

 Ndakisa ya Yaele ekoki koteya biso nini? Yaele asalaki likambo yango kozanga ete bátinda ye mpe asalaki yango na mpiko. Likambo oyo akutanaki na yango emonisi ete Nzambe akoki kobongisa makambo mpo esakweli moko boye ekokisama.

  Yezabele

 Yezabele azalaki nani? Azalaki mwasi ya Ahaba mokonzi ya Yisraele. Azalaki Moyisraele te mpe azalaki kosambela Yehova te. Kutu, azalaki kosambela Baala nzambe ya Bakanana.

 Asalaki nini? Mokonzi-mwasi Yezabele azalaki kokonza basusu, azangá mawa mpe moto ya kanza. Atombolaki losambo ya Baala oyo ezalaki mpe kotinda bato básala pite. Na ntango yango kaka, alukaki kolimwisa losambo ya Yehova, Nzambe ya solo.​—1 Bakonzi 18:4, 13; 19:1-3.

 Asalelaki lokuta mpe abomaki bato mpo na kokokisa bamposa na ye ya moyimi. (1 Bakonzi 21:8-16) Ndenge Nzambe alobaki yango, akufaki liwa ya nsɔmɔ mpe bakundaki ye te.​—1 Bakonzi 21:23; 2 Bakonzi 9:10, 32-37.

 Ndakisa ya Yezabele ekoki koteya biso nini? Yezabele azali ndakisa ya komekola te. Lokola azalaki na bizaleli mabe mpenza mpe azalaki kosala nyonso oyo esengeli mpo na kozwa oyo motema na ye elingi, nkombo na ye ekómá elembo oyo emonisaka mwasi oyo azangá nsɔni, ya bizaleli mabe mpe oyo azangi komipekisa.

  Lea

 Lea azalaki nani? Azalaki mwasi ya liboso ya Yakobo. Leki na ye Rashele, azalaki mpe mwasi ya Yakobo.​—Ebandeli 29:20-29.

 Asalaki nini? Lea akómaki mama ya bana mibali motoba ya Yakobo. (Ruta 4:11) Yakobo akanaki kobala Rashele, kasi Lea te. Kasi Labana, tata na bango, asalaki ete Lea azwa esika ya Rashele. Ntango Yakobo amonaki ete babalisi ye Lea na makasi, akendaki kotuna Labana mpo na nini asali ye boye. Labana ayebisaki ye ete na bonkɔkɔ na bango leki abalaka liboso ya yaya te. Pɔsɔ moko na nsima, Yakobo abalaki Rashele.​—Ebandeli 29:26-28.

 Yakobo azalaki kolinga Rashele mingi koleka Lea. (Ebandeli 29:30) Yango wana na zuwa nyonso, Lea azalaki kowelana na leki na ye Rashele mpo na koluka ete Yakobo amonisela ye bolingo. Nzambe amonaki ndenge Lea azalaki komiyoka mpe apambolaki ye; apesaki ye bana nsambo​—mibali motoba mpe mwasi moko.​—Ebandeli 29:31.

 Ndakisa ya Lea ekoki koteya biso nini? Lea atyelaki Nzambe motema mpe abondelaki; atikaki te ete mikakatano na ye ya libota epekisa ye komona lisalisi ya Nzambe. (Ebandeli 29:32-35; 30:20) Lisolo ya bomoi ya Lea emonisi ete libala ya bombanda esimbaka te, likambo oyo Nzambe atikelaki yango nzela na ntango moko boye. Nzambe andimaka libala ya mwasi moko, mobali moko.​—Matai 19:4-6.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Lea, talá lisolo “Bandeko basi oyo bazalaki kotungisama ‘batongaki ndako ya Yisalaele.’

  •  Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atikaki basaleli na ye bábala basi ebele na ntango moko boye, talá lisolo “Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?

  Marta

 Marta azalaki nani? Azalaki ndeko ya Lazare ná Maria, mpe bango nyonso misato bazalaki kofanda na mboka Betani oyo ezalaki pene na Yerusaleme.

 Asalaki nini? Marta azalaki moninga ya motema ya Yesu mpe Yesu “azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi ná Lazare.” (Yoane 11:5) Marta azalaki mwasi moko moyambi-bapaya. Mokolo moko ntango Yesu ayaki kotala bango, Maria aponaki koyoka Yesu kasi Marta azalaki kosala misala na ndako. Marta amilelaki epai ya Yesu ndenge Maria ayaki kosalisa ye te na misala yango. Yesu asembolaki makanisi ya Marta na boboto nyonso.​—Luka 10:38-42.

 Ntango Lazare abɛlaki makasi, Marta ná Maria batindelaki Yesu maloba, na elikya ete akobikisa ndeko na bango. (Yoane 11:3, 21) Kasi Lazare akufaki. Lisolo ya Marta ná Yesu emonisi ete azalaki kondimela elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi mpe likoki ya Yesu ya kozongisa ndeko na ye na bomoi.​—Yoane 11:20-27.

 Ndakisa ya Marta ekoki koteya biso nini? Marta azalaki mpenza moyambi-bapaya. Azalaki kondima toli. Azalaki koloba polele ndenge azalaki komiyoka mpe kolobela kondima na ye.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Marta, talá lisolo “Nasilá kondima.”

  Maria (mama ya Yesu)

 Maria azalaki nani? Azalaki elenge mwasi Moyuda, mpe azalaki ngɔndɔ ntango abotaki Yesu, azwaki zemi ya Mwana ya Nzambe na ndenge ya likamwisi.

 Asalaki nini? Maria asalaki mokano ya Nzambe na komikitisa nyonso. Alakanaki libala ná Yozefe ntango anzelu moko abimelaki ye mpe ayebisaki ye ete akozwa zemi mpe akobota Masiya oyo bato bazalaki kozela banda kala. (Luka 1:26-33) Andimaki mokumba yango na motema mobimba. Nsima ya kobota Yesu, Maria ná Yozefe babotaki bana minei ya mibali mpe ya basi soki mibale. Yango wana Maria atikalaki ngɔndɔ te. (Matai 13:55, 56) Atako azwaki mokumba oyo moto mosusu azwá te, alukaki ata moke te ete bato bákumisa ye to básalela ye makambo na ndenge ya sipesiale, ezala ntango Yesu asalaki mosala na ye awa na mabele to ntango akómaki mosangani ya lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso.

 Ndakisa ya Maria ekoki koteya biso nini? Maria azalaki mwasi moko ya sembo oyo andimaki mokumba moko monene. Ayebaki Makomami malamumalamu. Emonani ete Maria azongelaki mbala soki 20 maloba oyo ezali na Makomami ya Ebre na maloba oyo alobaki, oyo ezali na Luka 1:46-55.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Maria, talá lisolo “Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Maria.”

  Maria (ndeko ya Marta ná Lazare)

 Maria azalaki nani? Ye ná ndeko na ye, Lazare mpe Marta, bazalaki baninga ya motema ya Yesu.

 Asalaki nini? Maria amonisaki mbala ebele ete azalaki kosepela na Yesu mpe ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe. Andimaki ete Yesu akokaki kopekisa liwa ya ndeko na ye, Lazare, mpe azalaki wana ntango Yesu asekwisaki Lazare. Ndeko na ye, Marta, alobelaki Maria mabe ntango aponaki koyoka Yesu na esika ya kosalisa ye na misala ya ndako. Kasi Yesu apesaki Maria longonya ndenge atyaki makambo ya Nzambe na esika ya liboso.​—Luka 10:38-42.

 Na libaku mosusu, Maria amoniselaki Yesu ezaleli ya koyamba bapaya ntango asopaki “mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi” na motó mpe na makolo ya Yesu. (Matai 26:6, 7) Bato mosusu oyo bazalaki wana balobaki ete Maria azalaki kobebisa mafuta yango kaka mpamba. Kasi Yesu akɔtelaki ye, alobaki boye: “Epai nyonso bakosakola nsango malamu [ya Bokonzi ya Nzambe] oyo na mokili mobimba, bakolobela mpe likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye.”​—Matai 24:14; 26:8-13.

 Ndakisa ya Maria ekoki koteya biso nini? Maria akómisaki kondima na ye makasi. Atyaki losambo ya Nzambe liboso ya makambo mosusu nyonso. Mpe na komikitisa nyonso apesaki Yesu lokumu, ata ntango esɛngaki ye mbongo mingi mpo na kosala bongo.

  Maria Magadalena

 Maria Magadalena azalaki nani? Azalaki moyekoli ya sembo ya Yesu.

 Asalaki nini? Maria Magadalena azalaki moko ya basi oyo bazalaki kosala mibembo elongo na Yesu ná bayekoli na ye. Azalaki mokabi mpe asalelaki mbongo na ye mpo na kokokisa bamposa na bango. (Luka 8:1-3) Alandaki Yesu tii na nsuka ya mosala na ye, mpe akangamaki na ye tii ntango babomaki Yesu. Azwaki libaku ya kozala na kati ya bato ya liboso oyo bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye.​—Yoane 20:11-18.

 Ndakisa ya Maria ekoki koteya biso nini? Maria Magadalena apesaki mpenza mosala ya Yesu mabɔkɔ mpe azalaki ntango nyonso moyekoli ya Yesu ya molende.

  Miriame

 Miriame azalaki nani? Azalaki yaya ya Moize ná Arona. Azali mwasi ya liboso oyo Biblia ebengi ye mosakoli-mwasi.

 Asalaki nini? Lokola azalaki mosakoli-mwasi, azalaki na mokumba ya koyebisa basusu nsango ya Nzambe. Azalaki na esika ya lokumu na Yisraele mpe ayembaki elongo na mibali mosusu loyembo ya bolongi ntango Nzambe abomaki limpinga ya basoda ya Ezipito na Mbu Motane.​—Kobima 15:1, 20, 21.

 Ntango moko boye na nsima, Miriame ná Arona balobelaki Moize mabe. Emonani ete lolendo mpe zuwa nde etindaki bango báloba bongo. Nzambe “azalaki koyoka,” mpe apamelaki Miriame ná Arona makasi mpenza. (Mitángo 12:1-9) Na nsima Nzambe abɛtaki Miriame na maladi ya maba, emonani ete ye nde abandisaki likambo yango. Ntango Moize abondelaki mpo na ye, Nzambe abikisaki ye. Nsima ya kotya ye mosika na bato na libándá ya kaa mikolo nsambo, bazongisaki ye lisusu na kaa ya Yisraele.​—Mitángo 12:10-15.

 Biblia emonisi ete Miriame andimaki etumbu yango. Basiɛklɛ mingi na nsima, Nzambe alobelaki mokumba monene oyo Miriame azalaki na yango ntango akundwelaki Bayisraele boye: “Atindaki Moize, Arona mpe Miriame liboso na bino.”​—Mika 6:4.

 Ndakisa ya Miriame ekoki koteya biso nini? Lisolo ya Miriame emonisi ete Nzambe atyaka likebi na makambo oyo basaleli na ye balobelanaka. Eteyi biso mpe ete mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli koboya lolendo mpe zuwa ezangá ntina; bizaleli oyo ekoki kosala ete tóloba likambo moko oyo ekobebisa lokumu ya basusu.

  Rashele

 Rashele azalaki nani? Azalaki mwana ya Labana mpe mwasi oyo Yakobo alingaki mingi koleka.

 Asalaki nini? Rashele abalanaki na Yakobo mpe abotelaki ye bana mibali mibale, oyo na nsima bakómaki na kati ya molɔngɔ ya batata ya mabota 12 ya Yisraele. Rashele akutanaki na mobali oyo abalaki ye ntango azalaki kobatela bampate ya tata na ye. (Ebandeli 29:9, 10) Azalaki “kitoko mingi na nzoto” koleka ndeko na ye Lea.​—Ebandeli 29:17.

 Yakobo alingaki Rashele mingi koleka, mpe andimaki kosala mosala mbula nsambo mpo na kobala ye. (Ebandeli 29:18) Kasi, Labana abalisaki naino Lea mwana na ye ya liboso ya mwasi epai ya Yakobo na makasi mpe na nsima apesaki Yakobo nzela abala Rashele.​—Ebandeli 29:25-27.

 Yakobo azalaki kolinga Rashele ná bana na ye mibale mingi koleka Lea ná bana na ye. (Ebandeli 37:3; 44:20, 27-29) Yango wana, Lea ná Rashele bazalaki kowelana.​—Ebandeli 29:30; 30:1, 15.

 Ndakisa ya Rashele ekoki koteya biso nini? Rashele ayikaki mpiko na mokakatano moko ya libota kozanga abungisa elikya ete Nzambe akoyoka mabondeli na ye. (Ebandeli 30:22-24) Lisolo na ye emonisi ndenge libala ya bombanda etyaka mobulu na libota. Makambo oyo Rashele akutanaki na yango emonisi bwanya ya Nzambe ndenge atyaki mobeko na oyo etali libala​—mobali moko mpo na mwasi moko.​—Matai 19:4-6.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Rashele, talá lisolo “Bandeko basi oyo bazalaki kotungisama ‘batongaki ndako ya Yisalaele.’

  •  Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atikaki basaleli na ye bábala basi ebele na ntango moko boye, talá lisolo “Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?

  Rahaba

 Rahaba azalaki nani? Azalaki mwasi ya ndumba oyo azalaki kofanda na engumba Yeriko, na Kanana, mpe akómaki kosambela Yehova Nzambe.

 Asalaki nini? Rahaba abombaki Bayisraele mibale oyo bayaki konɔnga mboka yango. Asalaki bongo mpo ayokaki ndenge Yehova, Nzambe ya Yisraele, abimisaki basaleli na ye na boombo na Ezipito mpe na nsima abikisaki bango ntango libota moko ya Baamore ebundisaki bango.

 Rahaba asalisaki banɔngi yango mpe asɛngaki bango bábikisa ye mpe bato ya libota na ye ntango Bayisraele bakoya kobebisa Yeriko. Banɔngi yango bandimaki, kasi bayebisaki ye ete bakosala yango kaka soki ayebisi moto moko te likambo yango mpe ye ná bato ya libota na ye batikali na kati ya ndako na ye ntango Bayisraele bakobundisa engumba yango mpe ete asengeli kodiembelisa nsinga ya motane na fenetre mpo báyeba ndako yango. Rahaba atosaki malako yango nyonso mpe ye ná bato ya libota na ye babikaki ntango Bayisraele bazwaki Yeriko.

 Na nsima, Rahaba abalanaki na Moyisraele moko mpe akómaki moko ya bankɔkɔ ya Mokonzi Davidi mpe ya Yesu Kristo.​—Yosua 2:1-24; 6:25; Matai 1:5, 6, 16.

 Ndakisa ya Rahaba ekoki koteya biso nini? Biblia etángi Rahaba lokola ndakisa ya kondima makasi mpenza. (Baebre 11:30, 31; Yakobo 2:25) Lisolo na ye emonisi ete Nzambe alimbisaka mpe aponaka bilongi te, apambolaka baoyo batyelaka ye motema, ezala bazali bato ya ndenge nini.

  Rebeka

 Rebeka azalaki nani? Azalaki mwasi ya Yisaka mpe mama ya mapasa mibale, Yakobo ná Esau.

 Asalaki nini? Rebeka asalaki mokano ya Nzambe, ata ntango ezalaki mpasi kosala yango. Ntango azalaki kotoka mai na libulu, mobali moko asɛngaki ye apesa ye mwa mai ya komɛla na elokó. Rebeka asalaki noki mpo na kopesa ye mai ya komɛla mpe atunaki soki apesa mpe bakamela ya mobali yango mai. (Ebandeli 24:15-20) Mobali yango azalaki mosaleli ya Abrahama, mpe asalaki mobembo ya ntaka molai mpo na koluka mwasi oyo Yisaka mwana ya Abrahama akobala. (Ebandeli 24:2-4) Abondelaki mpe Nzambe apambola ye. Ntango amonaki ete Rebeka azalaki makasi na mosala mpe moyambi-bapaya, asosolaki ete Nzambe ayanolaki na libondeli na ye; emonisaki ete Rebeka azalaki mwasi oyo Nzambe aponelaki Yisaka.​—Ebandeli 24:10-14, 21, 27.

 Ntango Rebeka ayebaki ntina oyo mosaleli wana asalaki mobembo, andimaki kokende elongo na ye mpe akómaki mwasi ya Yisaka. (Ebandeli 24:57-59) Nsukansuka, Rebeka abotaki mapasa mibale ya mibali. Nzambe amonisaki ye ete oyo ya yaya, Esau, akosalela oyo ya leki, Yakobo. (Ebandeli 25:23) Ntango Yisaka amibongisaki mpo na kopesa Esau lipamboli ya mwana ya liboso, Rebeka abongisaki mwa makambo mpo lipamboli yango ekende epai ya Yakobo, na kolanda mokano ya Nzambe oyo ye ayebaki.​—Ebandeli 27:1-17.

 Ndakisa ya Rebeka ekoki koteya biso nini? Rebeka ayebaki esika makoki na ye esuki, azalaki makasi na mosala mpe moyambi-bapaya​—bizaleli oyo esalaki ete alonga na mokumba ya kozala mwasi ya libala, mama mpe mosambeli ya Nzambe ya solo.

  •  Mpo na koyeba makambo mosusu etali Rebeka, talá lisolo “Nandimi.”

  Ruta

 Ruta azalaki nani? Azalaki moto ya Moabe oyo asundolaki banzambe na ye mpe mboka na ye mpo na kosambela Yehova na ekólo Yisraele.

 Asalaki nini? Ruta amoniselaki mama bokilo na ye, Naomi, bolingo moko monene. Naomi, elongo na mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali, bakendaki kofanda na Moabe mpo na kokima nzala oyo ekɔtaki na Yisraele. Nsukansuka bana yango babalaki bana basi ya Moabe​—Ruta ná Orpa. Nsima ya bambula, mobali ya Naomi mpe bana yango mibale bakufaki, ye ná basi ya bana na ye bakómaki basi oyo mibali bakufá.

 Naomi azwaki ekateli ya kozonga na Yisraele mpo eleko ya kokauka esilaki. Ruta ná Orpa bandimaki kokende elongo na ye. Kasi Naomi asɛngaki bango bázonga na mabota na bango. Orpa azongaki na ye. (Ruta 1:1-6, 15) Kasi na bosembo nyonso, Ruta akangamaki na mama bokilo na ye. Alingaki Naomi mpe alingaki kosambela Yehova, Nzambe ya Naomi.​—Ruta 1:16, 17; 2:11.

 Lokola Ruta azalaki sembo epai ya mama bokilo na ye mpe azalaki kosala mosala makasi, nsango na ye etambolaki na Beteleme, mboka ya Naomi. Bizaleli ya Ruta ekamwisaki Boaze nkolo-mabele oyo azalaki na bozwi mpe akómaki kopesa Ruta ná Naomi bilei. (Ruta 2:5-7, 20) Na nsima Ruta abalanaki na Boaze mpe akómaki moko ya bankɔkɔ ya Mokonzi Davidi mpe ya Yesu Kristo.​—Matai 1:5, 6, 16.

 Ndakisa ya Ruta ekoki koteya biso nini? Lokola alingaki Naomi mpe Yehova, Ruta andimaki kotika mboka mpe bato ya libota na ye. Azalaki kosala mosala makasi, na molende, mpe azalaki sembo, ata ntango akutanaki na mikakatano mingi.

  Sara

 Sara azalaki nani? Azalaki mwasi ya Abrahama mpe mama ya Yisaka.

 Asalaki nini? Sara atikaki bomoi ya malamu na Ure, engumba moko ya bomɛngo mpo azalaki kondimela bilaka oyo Nzambe apesaki mobali na ye, Abrahama. Nzambe ayebisaki Abrahama alongwa na Ure mpe akende na mokili ya Kanana. Nzambe alakaki ete akopambola ye mpe akokómisa ye ekólo moko monene. (Ebandeli 12:1-5) Na ntango wana, Sara akokaki kozala na mbula 60. Kobanda wana, Sara ná mobali na ye bakómaki na bomoi ya bitambolatambola mpe kofanda na bahema.

 Atako bomoi ya bitambolatambola etyaki Sara na likama, apesaki Abrahama mabɔkɔ ndenge azalaki kolanda litambwisi ya Nzambe. (Ebandeli 12:10, 15) Bambula mingi, Sara azalaki kobota te, yango wana azalaki komitungisa mingi. Kasi, Nzambe alakaki ete akopambola bana ya Abrahama. (Ebandeli 12:7; 13:15; 15:18; 16:1, 2, 15) Na nsima, Nzambe alakaki ete Sara akobotela Abrahama mwana. Abotaki ntango alekisaki mbula ya kobota. Azalaki na mbula 90, mpe mobali na ye azalaki na mbula 100. (Ebandeli 17:17; 21:2-5) Bapesaki mwana yango nkombo Yisaka.

 Ndakisa ya Sara ekoki koteya biso nini? Ndakisa ya Sara eteyi biso ete tokoki ntango nyonso kotya motema ete Nzambe akokokisa bilaka na ye, ata oyo ezali komonana lokola ekokokisama te! (Baebre 11:11) Mpe ndakisa na ye lokola mwasi ya libala ezali komonisa ntina ya kozala na limemya na libala.​—1 Petro 3:5, 6.

  Elenge mwasi Moshulame

 Elenge mwasi Moshulame azalaki nani? Azalaki elenge mwasi moko kitoko oyo akolá na mboka mpe moto ya libosoliboso oyo Biblia elobeli na mokanda ya Loyembo ya Salomo. Biblia etángi nkombo na ye te.

 Asalaki nini? Elenge mwasi Moshulame atikalaki sembo epai ya elenge mobali mobateli ya mpate oyo balinganaki na ye. (Loyembo ya Salomo 2:16) Kasi lokola azalaki kitoko mingi, yango ebendaki likebi ya Mokonzi Salomo oyo azalaki na bozwi mingi mpe alukaki kobenda motema ya elenge mwasi yango. (Loyembo ya Salomo 7:6) Atako basusu batyaki ye mbamba andima Salomo, elenge mwasi Moshulame aboyaki. Alingaki elenge mobateli ya mpate oyo azalaki mobola mpe azalaki sembo epai na ye.​—Loyembo ya Salomo 3:5; 7:10; 8:6.

 Ndakisa ya elenge mwasi Moshulame ekoki koteya biso nini? Azalaki komimona te ete aleki basusu atako azalaki kitoko mpe bato mingi bazalaki kotyela ye likebi. Atikaki te ete mbamba ya basusu, bozwi oyo balakaki ye mpe lokumu esala ete atika kolinga elenge mobateli ya mpate. Azalaki ntango nyonso na komipekisa mpe abatelaki etamboli ya malamu.

  Mwasi ya Lota

 Mwasi ya Lota azalaki nani? Biblia etángi nkombo na ye te. Kasi eyebisi biso ete azalaki na bana basi mibale mpe ete ye ná libota na ye bafandaki na engumba Sodoma.​—Ebandeli 19:15.

 Asalaki nini? Aboyaki kotosa mobeko ya Nzambe. Nzambe azwaki ekateli ya kobebisa Sodoma mpe bingumba ya zingazinga mpo na etamboli na yango ya mbindo. Lokola alingaki Lota ná bato ya libota na ye oyo bazalaki kofanda na Sodoma, Nzambe atindaki baanzelu mibale bábimisa bango na engumba yango mpo bázwa likama te.​—Ebandeli 18:20; 19:1, 12, 13.

 Baanzelu bayebisaki bato ya libota ya Lota bákima esika yango mpe bátala nsima te; soki te, bakokufa. (Ebandeli 19:17) Mwasi ya Lota “abalukaki mpo na kotala na nsima, mpe akómaki likonzí ya mungwa.”​—Ebandeli 19:26.

 Ndakisa ya Mwasi ya Lota ekoki koteya biso nini? Lisolo na ye emonisi ete kolinga mingi biloko ya mokili ezali likama mpo ekoki kotinda moto aboya kotosa Nzambe. Yesu asalelaki ndakisa na ye mpo na kokebisa biso. Alobaki: “Bókanisa mwasi ya Lota.”​—Luka 17:32.

 Basi oyo Biblia elobeli: Badati

  1.  Eva

  2. Mpela (2370 B.C.E.)

  3.  Sara

  4.  Mwasi ya Lota

  5.  Rebeka

  6.  Lea

  7.  Rashele

  8. Kobima (1513 B.C.E.)

  9.  Miriame

  10.  Rahaba

  11.  Ruta

  12.  Debora

  13.  Yaele

  14.  Delila

  15.  Hana

  16. Mokonzi ya liboso ya Yisraele (1117 B.C.E.)

  17.  Abigaile

  18.  Elenge mwasi Moshulame

  19.  Yezabele

  20.  Estere

  21.  Maria (mama ya Yesu)

  22. Batisimo ya Yesu (29 T.B.)

  23.  Marta

  24.  Maria (ndeko ya Marta ná Lazare)

  25.  Maria Magadalena

  26. Liwa ya Yesu (33 T.B.)