Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | REBEKA

“Nandimi”

“Nandimi”

NTANGO mpokwa ebandi kokɔta, Rebeka azali kotalatala mokili yango oyo ezali mpasi moto afanda wana. Nsima ya bapɔsɔ mingi ya mobembo likoló ya kamela, nsukansuka amesani na koningana mpe kotambola ya kamela. Atiki Harane, mboka oyo akolá, mosika mpenza na nɔrdi-ɛsti. Mbala mosusu akomona bato ya libota na ye lisusu te. Na ntembe te, ebele ya mituna eyeli ye na motó mpo na avenire na ye, mingimingi lokola mobembo na ye ekómi na nsuka.

Ye ná bato oyo azali kotambola na bango baleki eteni monene ya mokili ya Kanana mpe bazali sikoyo kokatisa Negebe, oyo mabele na yango ezali makasimakasi. (Ebandeli 24:62) Ekoki kozala ete Rebeka amoni bampate. Mabele ya esika yango ebongi mpenza te na mosala ya bilanga mpo ezali makasimakasi mpe ekauká, kasi ezali na matiti oyo banyama ekoki kolya. Moto oyo azali kokamba ye na mobembo yango azali mokóló, mpe ayebi mabele yango malamu. Azali na nsango malamu ya koyebisa nkolo na ye Yisaka ete amemeli ye mwasi​—Rebeka! Mbala mosusu Rebeka azali komituna soki akozala na bomoi ya ndenge nini na mokili yango. Mobali na ye Yisaka azali ndenge nini? Bakutaná naino te! Akosepela ntango akomona ye? Rebeka akoyoka ndenge nini mpo na Yisaka?

Lelo oyo, na bisika mingi, baboti babongiselaka bana na bango mabala ndenge wana te. Kasi na bisika mosusu mpe, mabala ya bongo esalemaka mingi. Ezala ozali moto ya ndenge nini, okomona ete Rebeka azalaki kokende esika oyo ayebi te. Kutu, azalaki nde na mpiko mpe na kondima makasi. Ezali bizaleli oyo tosengeli komonisa ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani. Longola kondima, ezali mpe na bizaleli mosusu ya malamu mpenza oyo Rebeka azalaki na yango, oyo bato mingi bazalaka na yango te.

“NAKOTOKA MPE MAI MPO NA BAKAMELA NA YO”

Mbongwana monene oyo ekɔtaki na bomoi ya Rebeka ebandaki na ndenge oyo akanisaki te. Akolaki na Harane, engumba moko ya Mezopotamia to ya pene wana. Baboti na ye bakesanaki na bato mingi ya Harane. Bazalaki kosambela nzambe-sanza na nkombo Sin te. Kutu, Nzambe na bango ezalaki nde Yehova.​—Ebandeli 24:50.

Rebeka azalaki elenge mwasi moko kitoko mpenza, kasi kitoko na ye ezalaki kaka ya libándá te. Azalaki kobanga Nzambe mpe azalaki na bizaleli malamu. Libota na bango ezalaki na bozwi mpo bazalaki na bato ya misala, kasi bazalaki kolɛngɛla Rebeka te lokola mwana ya mokonzi; baboti na ye balakisaki ye kosala mosala makasi. Rebeka azalaki kosala misala ya makasi, ata mpe kotokela libota na bango mai ndenge basi mingi ya ntango wana bazalaki kosala. Ntango mpokwa ebandi kokɔta, azalaki komema elokó na lipeka mpe kokende kotoka mai na libulu.​—Ebandeli 24:11, 15, 16.

Mokolo moko na mpokwa, ntango asilisaki kotondisa elokó na ye, mobali moko ya mokóló ayaki mbangu epai na ye. Alobaki na ye boye: “Nabondeli yo, pesá ngai mwa mai ya komɛla ya elokó na yo.” Asɛngaki ye na makasi te mpe alobaki na boboto! Rebeka amonaki ete mobali yango asalaki mobembo molai. Yango wana, akitisaki nokinoki elokó na ye mpe apesaki mobali yango mai, ezalaki kaka mwa matangá te kasi mai mpenza ya kitoko. Amonaki ete mobali yango azali na kamela zomi oyo efandi pene wana kasi batondisaki naino mai te na esika banyama bamɛlaka mai. Amonaki ete mobali yango azalaki kotala ye na boboto mpe na likebi mpe alingaki ete mobali yango amona ete akabaka mpenza. Yango wana alobaki boye: “Nakotoka mpe mai mpo na bakamela na yo tii yango ekosilisa komɛla.”​—Ebandeli 24:17-19.

Simbá ete Rebeka asukaki kaka te na koloba ete apesa bakamela zomi mai kasi amɛlisa bango tii bátonda. Soki kamela ezali mpenza na mposa ya mai, ekoki komɛla mai litrɛ 95! Soki bakamela yango nyonso 10 ezalaki na mposa ya mai bongo, elingi koloba ete Rebeka asalaki mosala makasi bangonga ebele. Ndenge emonani, ekoki kozala ete bakamela yango ezalaki mpenza na mposa ya mai. * Kasi, Rebeka ayebaki yango ntango alobaki ete amɛlisa bakamela yango mai? Te. Andimaki kosala mosala makasi ndenge esengeli mpo mopaya wana amona ete akabaka. Mopaya yango andimaki. Na nsima azalaki kotala Rebeka na likebi ntango azali kokende kotoka mai mpe kozonga na elokó na ye etondi na mai mpe kosopa yango mbala na mbala na esika banyama bamɛlaka mai.​—Ebandeli 24:20, 21.

Rebeka azalaki makasi na mosala mpe moyambi-bapaya

Ndakisa ya Rebeka ezali na mateya mingi mpo na biso. Tozali na eleko oyo bato mingi balukaka matomba na bango moko. Ndenge esakolamaki, bato bakómi ‘komilinga,’ balingaka kosalisa basusu te. (2 Timote 3:1-5) Bakristo oyo balingi kobundisa ezaleli yango basengeli kotalela lisolo ya elenge mwasi wana oyo Biblia elobeli, oyo azalaki kokende mpe kozonga na libulu ya mai.

Na ntembe te, Rebeka amonaki ndenge mobange yango azalaki kotala ye. Azalaki kotala ye na makanisi mabe te; azalaki nde kokamwa na esengo. Ntango Rebeka asilisaki kotoka mai, mobali yango akabelaki ye biloko​—babiju ya ntalo! Na nsima atunaki boye: “Ozali mwana ya nani? Nabondeli yo, yebisá ngai. Esika ezali na ndako ya tata na yo mpo na kolala?” Ntango Rebeka ayebisaki mobali yango makambo ya libota na ye, mobali yango asepelaki lisusu makasi. Ekoki kozala ete na esengo nyonso, abakisaki boye: “Epai na biso matiti ya kokauka mpe ebele ya bilei ya bibwɛlɛ ezali, ná esika mpo na kolala”​—ezalaki likambo moke te mpo mobali yango azalaki elongo na bato mosusu. Na nsima, akendaki mbangu liboso na bango mpo na koyebisa mama na ye makambo oyo elekaki.​—Ebandeli 24:22-28, 32.

Emonani polele ete bateyaki ye ezaleli ya koyamba bapaya. Ezaleli yango ekómi kosila lelo mpe yango nde ntina mosusu oyo tosengeli komekola kondima ya elenge mwasi wana ya motema malamu. Kozala na kondima epai ya Nzambe esengeli kotinda biso tóyambaka bapaya. Yehova azali moyambi bapaya mpo akabelaka moto nyonso mpe alingi basambeli na ye básala mpe bongo. Soki toyambaka ata bapaya oyo bakozongisela biso eloko te, tokosepelisa Tata na biso ya likoló.​—Matai 5:44-46; 1 Petro 4:9.

“OSENGELI KOZWELA MWANA NA NGAI MWASI”

Mobali yango ya mokóló na libulu ya mai ezalaki nani? Ezalaki mosaleli ya Abrahama, ndeko ya nkɔkɔ ya Rebeka. Na yango, bayambaki ye na ndako ya Betuele, tata ya Rebeka. Ekoki kozala ete nkombo ya mosaleli yango ezalaki Eliezere. * Bapesaki ye bilei, kasi aboyaki kolya tii ntango ayebisaki bango ntina ya mobembo na ye. (Ebandeli 24:31-33) Tokoki komona na makanisi ndenge azali koloba na esengo, mpo autaki komona makambo oyo endimisaki ye ete Nzambe na ye Yehova, apambolaki ye na mokumba monene wana. Ndenge nini?

Kanisá naino ndenge Eliezere abɛtɛlaki Betuele, tata ya Rebeka, lisolo yango mpe Labana ndeko mobali ya Rebeka azalaki koyoka lisolo yango na likebi mpenza. Ayebisaki bango ete Yehova apambolaki Abrahama mingi na Kanana mpe Abrahama ná Sara babotaki mwana mobali na nkombo Yisaka; mpe mwana yango asengeli kotikala na biloko yango nyonso. Abrahama apesaki mosaleli na ye mokumba monene: Asengelaki kolukela Yisaka mwasi na Harane, na libota ya Abrahama.​—Ebandeli 24:34-38.

Abrahama alapisaki Eliezere ndai ete aponela Yisaka mwasi te na kati ya basi ya Kanana. Mpo na nini? Mpo Bakanana bazalaki kosambela Yehova te, bazalaki mpe kotosa ye te. Abrahama ayebaki ete, na ntango oyo ebongi, Yehova akopesa bato yango etumbu mpo na misala na bango ya mabe. Abrahama alingaki te ete mwana na ye Yisaka asangana na bato ya bizaleli mabe wana. Ayebaki mpe ete mwana na ye azalaki na mokumba monene na kokokisama ya bilaka ya Nzambe.​—Ebandeli 15:16; 17:19; 24:2-4.

Eliezere ayebisaki bankolo-ndako ete ntango akómaki na libulu ya mai pene na Harane, abondelaki Yehova Nzambe. Asɛngaki Yehova aponela Yisaka mwasi ya kobala. Ndenge nini? Eliezere asɛngaki Nzambe asala ete mwasi oyo Nzambe alingi Yisaka abala aya na libulu ya mai. Soki asɛngi mwasi yango mai ya komɛla, amɛlisa mpe bakamela. (Ebandeli 24:12-14) Nani ayaki mpe asalaki kaka bongo? Rebeka! Kanisá naino; Rebeka alingaki koyoka ndenge nini soki esalemaki ete ayokaki lisolo oyo Eliezere abɛtɛlaki bato ya libota na ye!

Lisolo ya Eliezere ekamwisaki Betuele ná Labana. Balobaki boye: “Likambo oyo euti na Yehova.” Ndenge bazalaki kosala na ntango wana, bayokanaki mpo na libala mpe bandimaki Rebeka abala Yisaka. (Ebandeli 24:50-54) Yango elingi nde koloba ete Rebeka azalaki na likambo ya koloba te?

Mwa bapɔsɔ liboso, Eliezere atunaki Abrahama boye: “Bongo soki mwasi yango alingi te koya na ngai elongo?” Abrahama ayanolaki boye: “Na Ntango yango okolongwa na mokumba ya ndai oyo olapelaki ngai.” (Ebandeli 24:39, 41) Na ndako ya Betuele, esɛngaki mpe ete elenge mwasi yango ye moko aloba oyo alingi. Eliezere asepelaki mpenza ndenge makambo esimbaki mpe na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki atunaki soki akoki kozonga mbala moko na Rebeka na Kanana. Kasi, libota yango elingaki ete Rebeka atikala na bango mikolo zomi. Nsukansuka bakataki likambo yango boye: “Tiká tóbenga elenge mwasi mpe tótuna ye moko aloba.”​—Ebandeli 24:57.

Awa mpe, ezalaki ekateli monene oyo Rebeka asengelaki kozwa. Akoloba nini? Akomitya nde na esika ya tata mpe ndeko na ye mpo na kosɛnga ete akende te na mobembo oyo ayebi esika te? To amonaki yango nde libaku ya kosala likambo oyo emonanaki polele ete Yehova nde atambwisi yango? Ntango Rebeka apesaki eyano, amonisaki ndenge amiyokaki mpo na mbongwana wana ya mbalakaka oyo asengelaki kosala na bomoi na ye, mbala mosusu mpe ebangisaki ye. Alobaki kaka: “Nandimi.”​—Ebandeli 24:58.

Azalaki na makanisi malamu mpenza! Lelo oyo, makambo ya mabala ekesani na oyo ya ntango wana, kasi ezali kaka na makambo mingi oyo tokoki koyekola na ndakisa ya Rebeka. Likambo elekaki ntina mpo na ye ezalaki ya kokokisa mposa ya Yehova, Nzambe na ye, kasi te oyo ya ye moko. Na likambo ya libala, lelo oyo Liloba ya Nzambe etondi na toli ya malamu mpenza oyo etali ndenge ya kopona molongani mpe kokóma mobali to mwasi malamu. (2 Bakorinti 6:14, 15; Baefese 5:28-33) Ekozala malamu tólanda ndakisa ya Rebeka mpe tóluka kosala makambo ndenge Nzambe alingi.

“MOBALI WANA . . . NDE NANI?”

Libota ya Betuele epambolaki Rebeka, mwana na bango ya bolingo. Na nsima, Rebeka ná Debora, oyo azalaki kobatela ye banda bomwana mpe basaleli mosusu ya basi bakendaki elongo na Eliezere mpe bato na ye. (Ebandeli 24:59-61; 35:8) Harane etikalaki mosika mpenza. Mobembo yango ezalaki molai, kilomɛtrɛ 800 to koleka mpe ekoki kozala ete eumelaki pɔsɔ misato. Mobembo yango ezalaki pɛtɛɛ te. Rebeka amonaki ebele ya bakamela na bomoi na ye, kasi tokoki koloba te ete ayebaki kotambwisa yango malamu. Biblia elobi ete bato ya libota na ye bazalaki babateli ya mpate, bazalaki te lokola bakomelesa oyo bazalaki kotambwisa milɔngɔ ya bakamela. (Ebandeli 29:10) Mbala mingi bato oyo bayebi mpenza kotambwisa bakamela bamilelaka mpo ezalaka pɛtɛɛ te, ata soki batamboli na yango kaka mwa moke!

Ezala ndenge nini, Rebeka atyaki makanisi na ye liboso, na ntembe te alukaki koyeba epai ya Eliezere makambo nyonso ya Yisaka mpe libota na ye. Meká komona na makanisi ndenge mobali yango azali kosolola na ye na butu, ntango bafandi na mɔtɔ, azali kolobela eleka oyo Yehova apesaki moninga na ye Abrahama. Na nzela ya libota ya Abrahama, Nzambe akobimisa momboto oyo ekomemela bato nyonso mapamboli. Kanisá ndenge Rebeka akamwaki ntango ayebaki ete elaka ya Yehova ekokokisama na nzela ya mobali na ye Yisaka mpe na nzela na ye!​—Ebandeli 22:15-18.

Rebeka azalaki na ezaleli ya komikitisa oyo bato mingi bazalaka na yango te

Nsukansuka, mokolo oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo ekoki. Ntango bazalaki kokatisa Negebe mpe molili ebandi kokɔta na mboka, Rebeka amonaki mobali moko azali kotambola na esobe. Emonanaki lokola mobali yango azalaki kokanisa mingi. Biblia elobi boye: “Apumbwe na kamela akiti,” mbala mosusu azelaki kutu te ete kamela efukama mpe atunaki moto oyo azalaki kokamba ye boye: “Mobali wana oyo azali kotambola na esobe mpo na kokutana na biso nde nani?” Ntango ayebaki ete ezali Yisaka, azipaki motó na ye na litambala. (Ebandeli 24:62-65) Mpo na nini? Emonani ete ezalaki elembo ya limemya epai ya mobali na ye. Bato mingi lelo bakoki komona limemya ya ndenge wana lokola makambo ya kala. Ata bongo, ezala basi to mibali bakoki kozwa liteya na komikitisa ya Rebeka; mpo nani kati na biso alingaka te bámemya ye?

Yisaka, mobali ya mbula soki 40, azalaki naino kolela mama na ye Sara, oyo akufaki mbula misato liboso. Boye, tokoki koloba ete Yisaka azalaki mobali moko ya boboto. Ezalaki mpenza lipamboli mpo na mobali ya ndenge wana azwa mwasi oyo azalaki makasi na mosala, moyambi-bapaya mpe mwasi ya komikitisa! Ndenge nini bango mibale bayokanaki? Biblia elobi kaka ete Yisaka “alingaki ye mingi.”​—Ebandeli 24:67; 26:8.

Atako eleki sikoyo siɛklɛ soki 39, tokoki kaka kolinga Rebeka. Mpiko na ye, makasi na ye na mosala, ezaleli na ye ya koyamba bapaya mpe komikitisa na ye ekoki kaka kosepelisa biso. Ekozala malamu biso nyonso, ezala elenge to mokóló, mwasi to mobali, monzemba to moto oyo abalá, tómekola kondima na ye!

^ par. 10 Mpokwa ekɔtaki. Kasi lisolo yango elobi te ete Rebeka atikalaki na libulu yango bangonga mingi. Elobi mpe te ete ntango asilisaki kotoka mai bandeko na ye basilaki kolala to elobi mpe te ete moto moko ayaki kotala mpo na koyeba ntina nini aumelaki mingi ndenge wana.

^ par. 15 Batángi nkombo ya Eliezere na lisolo oyo te kasi ekoki kozala ete ezalaki ye. Na ntango moko boye, Abrahama alingaki kotikela ye libula na ye mpo azalaki na mwana te oyo akozwa yango, boye ye nde azalaki mokóló na kati ya basaleli nyonso ya Abrahama mpe bazalaki kotyela ye motema. Ndenge wana nde Biblia elobeli mosaleli oyo tolobeli na lisolo oyo.​—Ebandeli 15:2; 24:2-4.