Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Nani mpenza azali koyangela mokili oyo?

Soki Nzambe nde ayangelaka mokili oyo, bampasi elingaki kozala mingi boye?

Bato mingi bakanisaka ete Nzambe ya solo nde azali koyangela mokili oyo. Kasi soki ezali bongo, bampasi elingaki kozala mingi boye na mokili? (Kolimbola Mibeko 32:4, 5) Biblia elobi ete moto mabe nde azali kokonza mokili.​—Tángá 1 Yoane 5:19.

Ndenge nini moto mabe akómaki kokonza bato? Na ebandeli, anzelu moko atombokelaki Nzambe mpe atindaki mwasi ná mobali ya liboso básala mpe bongo. (Ebandeli 3:1-6) Mwasi ná mobali yango bandimaki kotosa anzelu wana motomboki, Satana, mpe bakómisaki ye mokonzi na bango. Kaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde azali mokonzi oyo abongi, kasi alingi ete bato bápona boyangeli na ye mpo balingaka ye. (Kolimbola Mibeko 6:6; 30:16, 19) Likambo ya mawa, ebele ya bato bakosami mpe baponi kaka nzela wana ya mabe oyo mwasi ná mobali ya liboso baponaki.​—Tángá Emoniseli 12:9.

Nani akosilisa bampasi ya bato?

Nzambe akotika boyangeli mabe ya Satana libela? Te! Nzambe akosalela Yesu mpo na kolongola makambo nyonso ya mabe oyo Satana abimisá.​—Tángá 1 Yoane 3:8.

Yesu akosalela nguya oyo Nzambe apesi ye mpo na koboma Satana. (Baroma 16:20) Na nsima, Nzambe akoyangela bato mpe akozongisa bango na bomoi ya esengo mpe ya kimya oyo akanaki mpo na bango na ebandeli.​—Tángá Emoniseli 21:3-5.