Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yoane 3:16​—“Mpo Nzambe alingaki mokili mingi”

Yoane 3:16​—“Mpo Nzambe alingaki mokili mingi”

 “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Mpɔ ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apɛsi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abɛbisama tɛ kasi ete azala na bomɔi na seko”—Yoane 3:16, Biblia haut fleuve.

Ndenge Yoane 3:16 elimbolami

 Nzambe alingaka biso mpe alingaka tósepela na bomoi libela na libela. Yango wana, atindaki Mwana na ye, Yesu Kristo, awa na mabele. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu asalaki makambo mingi ya ntina. Ntina ya liboso ezali ete ateyaki bayekoli na ye makambo etali Nzambe oyo azali Tata na ye. (1 Petro 1:3) Ntina ya mibale ezali ete apesaki bomoi na ye mpo na bato. Mpo tózwa bomoi ya seko, tosengeli kondimela Yesu.

 Bolingo monene ya Nzambe emonisami na maloba oyo: “Apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.” a Yesu azalaki Mwana se moko ya Nzambe. Na ndenge nini? Yesu azali kaka Mwana moko oyo akelamaki mbala moko na Nzambe. (Bakolose 1:17) Azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” (Bakolose 1:15) Bikelamu mosusu nyonso, ezala baanzelu, basalemaki na nzela ya Yesu. Kasi, Yehova b Nzambe andimaki kotinda mwana na ye oyo alingaka mingi “mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Yesu anyokwamaki mpe akufaki mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa, oyo tozwaki epai ya mobali ya liboso Adama.​—Baroma 5:8, 12.

 Komonisa kondima epai ya Yesu emonisi kaka te kondimela ye to kondima makambo oyo asalaki mpo na biso. Tomonisaka kondima epai ya Mwana ya Nzambe ntango tozali kotosa ye mpe kolanda matambe na ye. (Matai 7:24-27; 1 Petro 2:21) Biblia elobi: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.”​—Yoane 3:36.

Makambo oyo bazali kolobela na Yoane 3:16

 Yesu alobaki maloba wana ntango azalaki kosolola na mokonzi moko ya mangomba ya Bayuda na nkombo Nikodeme. (Yoane 3:1, 2) Na lisolo yango, Yesu alobelaki makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe c mpe likambo etali ‘kobotama lisusu.’ (Yoane 3:3) Asakolaki mpe ndenge akokufa. “Mwana ya moto mpe asengeli kotombolama ndenge wana, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:14, 15) Na nsima, amonisaki polele ete bolingo monene oyo Nzambe alingaka bato nde epesi bato libaku ya kozwa bomoi. Yesu asukisaki na koloba ete mpo na kozwa bomoi, tosengeli kondima mpe kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe.​—Yoane 3:17-21.

a Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “se moko oyo abotamaki” ezali monogenes, oyo elimbolami na “kaka ye moko, . . . ye moko nde azali na motindo wana, kasi moto mosusu te, kaka ye.”​—A Greek-English Lexicon of the New Testament and Other Early Christian Literature, lok. 658.

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

c Bokonzi ya Nzambe, ebengami mpe “Bokonzi ya likoló,” ezali guvɛrnema ya likoló. (Matai 10:7; Emoniseli 11:15) Nzambe aponaki Kristo mpo azala Mokonzi ya Bokonzi yango. Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabele. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?