Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?

Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?

“Nini​—oyebi mibali te?”

Kanisá ete batuni yo motuna wana. Olingi kopesa eyano, mpe eyano na yo ezali ɛɛ! Olingi oyeba ndenge ya koloba yango kozanga kobanga? Lisolo oyo ekosalisa yo!

 Koyeba mibali to basi te elimboli nini?

 Moto oyo ayebi mibali to basi te ezali moto oyo asangisá naino nzoto te.

 Kasi, kosangisa nzoto elimboli nini? Elimboli kolala na mwasi to na mobali, kasi esuki wana te. Bilenge mosusu balobaka ete bayebi mibali te to bayebi basi te, mpo basangisá nzoto te, nzokande basalá yango na ndenge mosusu.

 “Kosangisa nzoto” elimboli mpe makambo lokola kosangisa nzoto na monɔkɔ, na esumbeli, to kosimbasimba enama ya kobotela ya moto mosusu.

 Na mokuse: Moto oyo asilá kosangisa nzoto na monɔkɔ, na esumbeli, to kosimbasimba enama ya kobotela ya moto mosusu, akoki koloba te ete ayebi mibali to basi te.

 Biblia elobi nini na likambo ya kosangisa nzoto?

 Biblia elobi ete kaka mwasi ná mobali oyo babalani nde bakoki kosangisa nzoto. (Masese 5:18) Yango wana, moto oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli kosangisa nzoto te soki abali te.​—1 Batesaloniki 4:3-5.

 Bato mosusu balobaka ete likanisi ya Biblia esilá ngala mpe eyokani ata moke na makambo ya mikolo oyo. Kasi, kobosana te ete makambo ya mikolo ezali kaka koboma libala, bazemi ya balabala, mpe bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Mpo na koloba solo, mokili oyo ekoki ata moke te kopesa moto toli na likambo etali bizaleli ya malamu!​—1 Yoane 2:15-17.

 Soki okanisi malamu, okomona ete bizaleli oyo Biblia eteyaka ebongi mpenza. Tózwa ndakisa: Kanisá ete moto moko akabeli yo 1 000 $. Okobwaka yango na balabala mpo moto nyonso oyo akoleka alɔkɔta yango?

 Ezali mpe bongo na likambo etali kosangisa nzoto. Sierra, oyo azali na mbula 14, alobi boye: “Nalingi te kopesa nzoto na ngai na moto oyo mbala mosusu nakobosana nkombo na ye nsima ya bambula.” Tammy, oyo azali na mbula 17, andimi likambo yango. Alobi boye: “Kosangisa nzoto ezali likabo ya motuya mingi mpe esengeli kobebisa te.”

 Na mokuse: Biblia emonisi ete bato oyo babali naino te basengeli kosangisa nzoto te mpe kozala na bizaleli ya pɛto.​—1 Bakorinti 6:18; 7:8, 9.

 Yo okanisaka nini?

  •   Mpo na yo, likanisi ya Biblia na likambo etali kosangisa nzoto ezali malamu, to ezali makasi mingi?

  •   Mpo na yo, mabe ezali te soki bato mibale oyo balobi ete balingani mpenza basangisi nzoto ata soki babalani naino te?

 Nsima ya kokanisa likambo yango malamumalamu, bilenge mingi bamoni ete kosangisa nzoto te liboso ya kobala mpe kozala na bizaleli ya pɛto eleki malamu. Bayokaka mawa te mpo na yango mpe bamonaka te ete bazali kozanga eloko moko. Tángá makambo oyo bamosusu kati na bango balobi:

  •  “Nasepelaka ndenge nayebi naino mibali te! Mabe ezali te mpo naboyi na ngai koyoka mpasi oyo kosangisa nzoto liboso ya kobala ememaka, ezala na nzoto to na makanisi!”​—Emily.

  •  “Nasepelaka ndenge nasangisá nzoto na mibali te, mpe nazali motema ya kokita mpo nayebi ete nakoki ata moke te kozala na maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto.”​—Elaine.

  •  “Nayoká bana basi ebele ya mbula na ngai mpe oyo baleki ngai na mbula bazali koloba ete bayokaka mawa ndenge basangisá nzoto mpe ete ezalaki malamu bázela; ngai nalingi kosala libunga wana te.​—Vera.

  •  “Namoná bato ebele oyo batikalá na bilembo mpe mpasi na motema mpo basangisaki nzoto liboso ya kobala to basangisaki nzoto na bato ebele. Mpo na ngai, bomoi ya ndenge wana ezali mawa mpenza.​—Deanne.

 Na mokuse: Kangamá makasi na mateya oyo ondimaka liboso bátya yo mbamba mpo osangisa nzoto to okutana na komekama.​—Yakobo 1:14, 15.

 Ndenge nini okoki kolimbwela basusu mateya oyo ondimaka?

 Soki moto atuni yo mituna mpo na mateya oyo etali kosangisa nzoto, okoloba nini? Talelá mingimingi ntina oyo atuni bongo.

 “Ntango moto atuni bongo kaka mpo na kosɛka ngai, nazalaki kofanda nyɛɛ te. Nazalaki koloba: ‘Wana etali yo te! Na nsima nakei na ngai.”​—Corinne.

 “Likambo ya mawa, bato mosusu na kelasi basepelaka kotumola basusu kaka mpo na kosala masɛki. Ntango bazali kotuna ngai mituna kaka mpo na kotumola ngai, nazalaki koloba ata eloko moko te.”​—David.

 Oyebaki yango? Na bantango mosusu, Yesu azalaki koyanola te na mituna ya bato oyo bato balingi kaka kotyola ye.​—Matai 26:62, 63.

 Bongo soki moto oyo azali kotuna yo amemyaka yo mpe alingi mpenza koyeba? Soki omoni ete moto yango andimelaka Biblia, okoki kolakisa ye vɛrsɛ lokola 1 Bakorinti 6:18, oyo elobi ete moto oyo asangisi nzoto liboso ya kobala asaleli nzoto na ye moko lisumu, to abebisi yango.

 Ata soki osaleli Biblia mbala moko to te, ezali na ntina oloba na mpiko. Oponá kozala na bizaleli ya pɛto, osengeli kozala na esengo ndenge.​—1 Petro 3:16.

 “Koloba na mpiko ekomonisa ete ozali na ntembe te mpo na mateya oyo ondimaka mpe ete oyo ozali kosala, ozali kosala yango mpo oyebi ete ezali malamu, kasi te mpo moto atindi yo osala yango.”​—Jill.

 Na mokuse: Soki ozali na ntembe te mpo na mateya oyo etali kosangisa nzoto, okoka kolimbwela yango basusu. Mpe mbala mosusu makambo oyo bakoloba ekokamwisa yo. Melinda, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Baninga na ngai ya mosala bapesaki ngai longonya ndenge naboyá kosangisa nzoto liboso ya kobala. Likambo yango elekelaka bango te. Bamonaka ete nazali na komipekisa mpe na bizaleli ya pɛto.”

 Toli! Zwá lokasa “Ndenge ya kolimbola mateya etali kosangisa nzoto”; ekosalisa yo oyeba ndenge ya komonisa yango. Talá mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi.

  •    Mokapo 24 ya Volimi 1 elobi “Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?”

  •    Mokapo 5 ya Volimi 2 elobi “Mabe ezali wapi soki nasangisi nzoto liboso nabala?”

 “Nasepelaka mingi na makanisi oyo ezali na buku ‘Mituna oyo bilenge batunaka.’ Na ndakisa, na lokasa 187 ya Volimi 1, ezali na elilingi moko oyo emonisi ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali lokola kokaba shɛnɛti moko ya ntalo mingi. Okosilisa valɛrɛ na yo. Na lokasa 177, bamonisi ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali lokola kozwa elamba moko ya ntalo mingi mpe kosalela yango lokola tapi ya kopangwisa makolo. Kasi elilingi oyo nalingaka mingi ezali oyo ya lokasa 54 ya Volimi 2. Maloba oyo ezali wana elobi: ‘Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali lokola kofungola kado oyo bapesi yo naino te.’ Ezali lokola ozali koyiba eloko ya moto mosusu, ya moto oyo okobala.”​—Victoria.