Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?

Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?

 Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baroma 7:21) Omiyoká naino bongo te? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo oboya kolanda bamposa na yo ya mabe ntango omekami.

 Oyo osengeli koyeba

 Mbala mingi komekama ná mbamba ya baninga etambolaka nzela moko. Kutu, Biblia elobaka ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Mbamba ya baninga to oyo eutaka na radio to televizyo ekoki kolamwisa mposa na motema na yo mpe kotinda yo osala mabe; ekoki kutu kotinda yo ‘olanda ebele ya bato mpo na mikano ya mabe.’​—Kobima 23:2.

 “Mposa ya kolinga ete basusu bándima yo ekoki kotinda yo osala likambo nyonso oyo bazali kosala, kaka mpo bándima yo.”​—Jeremy.

 Kanisá naino: Mpo na nini ekoki kozala mpasi otɛmɛla komekama soki ozali komitungisa mingi mpo na oyo basusu bakokanisa?​—Masese 29:25.

 Na mokuse: Kotika te ete mbamba ya baninga etinda yo otya pembeni mibeko oyo otosaka.

 Oyo okoki kosala

 Yebá mateya oyo ondimaka. Soki oyebi te makambo oyo ondimaka, okoki kokóma lokola mwana-popi oyo basusu bakoki kosakana na yango. Eleki malamu kolanda toli oyo ya Biblia: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Soki oyebi mateya oyo ondimaka, ekozala mpasi te okangama na yango mpe otɛmɛla likambo nyonso oyo eyokani te na yango.

 Kanisá naino: Mpo na nini ondimaka ete mibeko ya Nzambe ezali mpo na bolamu na yo moko?

 “Namonaka ete soki nakangami na makambo oyo nandimaka mpe natɛmɛli komekama, basusu bapesaka ngai limemya mingi mpo na yango.”​—Kimberly.

 Ndakisa ya kolanda: Danyele. Ekoki kozala ete ntango azalaki naino elenge mpenza, Danyele “akanaki na motema na ye” ete akotosa mibeko ya Nzambe.​—Danyele 1:8.

Soki oyebi te makambo oyo ondimaka, okoki kokóma lokola mwana-popi oyo basusu bakoki kosakana na yango

 Yebá bolɛmbu na yo. Biblia elobeli “bamposa ya bolenge;” bamposa oyo ezalaka makasi mingimingi ntango ozali elenge. (2 Timote 2:22) Ezali kaka te mposa ya kosangisa nzoto, kasi mpe mposa ete basusu bándima yo to mposa ya kozwaka yo moko bikateli liboso okokisa mbula oyo esengeli mpo na yango.

 Kanisá naino: Biblia elobi ete “moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.” (Yakobo 1:14) Mposa nini eyelaka yo makasi?

 “Yebá komekama oyo ezalaka mpasi otɛmɛla yango. Salá bolukiluki mpo oyeba ndenge ya kobundisa komekama yango mpe komá makanisi oyo okoki kosalela. Na ndenge yango, mbala ya nsima oyo okokutana na komekama yango okoyeba ndenge ya kotɛmɛla yango.”​—Sylvia.

 Ndakisa ya kolanda: Davidi. Na ntango moko boye, atikaki bamposa na ye moko mpe mbamba ya basusu ekweisa ye. Kasi Davidi azwaki mateya na mabunga oyo asalaki mpe alukaki kobongisa makambo. Abondelaki Yehova boye: “Zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.”​—Nzembo 51:10.

 Yebá komipekisa. Biblia elobi: “Kotika mabe elonga yo te.” (Baroma 12:21) Yango elingi koloba ete esɛngi kaka te okwea na komekama. Okoki kopona kosala makambo ya malamu.

 Kanisá naino: Ndenge nini okoki komipekisa mpe kosala oyo ezali malamu na likambo oyo ekoki kotinda yo osala mabe?

 “Nakanisaka ndenge nakomiyoka soki nakwei na likambo moko oyo namekami na yango. Nakomiyoka malamu? Mbala mosusu nakomiyoka malamu, kasi ekoki kozala kaka mpo na mwa ntango. Nakomiyoka kaka bongo nsima ya mikolo? Te, nakoyoka mabe mpenza. Ebongi mpenza nasala yango? Te!”​—Sophia.

 Ndakisa ya kolanda: Paulo. Atako andimaki ete azalaki na bamposa mabe, Paulo ayebaki komipekisa. Akomaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.”​—1 Bakorinti 9:27.

 Na mokuse: Yo moko nde okopona oyo okosala soki okutani na komekama.

 Kobosana te, komekama ezalaka mpo na libela te. Melissa, elenge mwasi ya mbula 20; alobi boye: “Makambo mingi oyo ezalaki komekama monene mpo na ngai ntango nazalaki na eteyelo ya katikati ekómá sikoyo na ntina te. Soki nakanisi yango, ekitisaka ngai motema ete komekama oyo nazali kokutana na yango lelo oyo, ekoleka na yango mpe mokolo mosusu nakomona ete nasalaki malamu ndenge natɛmɛlaki yango.”