Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nasala nini soki nalingi lisusu kelasi te?

Nasala nini soki nalingi lisusu kelasi te?

Oyo osengeli kosala

 Lingáká koyekola. Kobosana te ntina oyo okendaka kelasi. Ekoki kozala ete sikoyo ozali komona te ntina ya mateya mosusu oyo bapesaka bino na kelasi. Kasi, koyekola mateya ndenge na ndenge ekosalisa yo oyeba makambo mingi na esika ofandi. Ekosalisa yo okóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso,” mpe ekosalisa yo oyeba kosolola na bato ndenge na ndenge. (1 Bakorinti 9:22) Yango ekoki kutu kokolisa likoki na yo ya kokanisa, likoki oyo ekosalisa yo na nsima.

Kotánga kelasi tii kosilisa ezali lokola kopasola nzela na kati ya zamba moko monene​—yango nyonso mibale esɛngaka kozala na bisaleli oyo ebongi

 Taleláká molakisi na yo na ndenge ya malamu. Soki omoni ete oz’osepela na molakisi na yo te, kolanda ye te, landá nde mateya na ye. Kobosana te ete molakisi na bino atángisá liteya wana mbala ebele na bakelasi mosusu. Yango wana, ekozala mpasi mpo azala na mɔtɔ oyo azalaki na yango liboso mpo na kotángisa liteya yango.

 Toli: Komá makambo oyo azali kotángisa yo, tuná ye mituna na limemya nyonso mpo na koyeba makambo mosusu, mpe landá mateya na ye na esengo. Esengo na yo ekotinda mpe basusu bákóma na esengo.

 Talelá malamu makoki na yo. Kotánga ekoki kosalisa yo omona makoki na yo mosusu oyo oyebaka te. Paulo akomelaki Timote boye: “Opelisa lokola mɔtɔ likabo ya Nzambe oyo ezali epai na yo.” (2 Timote 1:6) Emonani ete Timote azwaki likabo moko ya elimo santu. Kasi, esengelaki akolisa “likabo” oyo Nzambe apesá ye mpo asala na yango mosala, kasi te mpo ebeba kaka boye. Na ntembe te, soki ozali mayele na kelasi, ezali te mpo Nzambe nde apesi yo yango na ndenge ya likamwisi. Kasi, yebá ete ozali na mayele ya kosala makambo mosusu oyo moto mosusu azali na yango te. Kelasi ekoki kosalisa yo okolisa mpe obatela makoki oyo oyebaka te ete ozali na yango.