Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bolimbisi elimboli nini?

Bolimbisi elimboli nini?

Eyano ya Biblia

 Bolimbisi ezali kolimbisa moto oyo asali yo mabe. Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bolimbisi” elimboli “kosundola,” ndenge kaka moto asundolaka nyongo. Yesu asalelaki bokokanisi yango ntango ateyaki Bayekoli na ye bábondelaka boye: “Limbisá biso masumu na biso, mpo biso moko mpe tolimbisaka moto nyonso oyo azali na nyongo na biso.” (Luka 11:4) Ndenge moko mpe, na ndakisa ya moombo mabe, Yesu akokanisaki kolimbisa na koboma nyongo mpe kokanisa yango lisusu te.​—Matai 18:23-35.

 Koboya kobomba nkanda na motema mpe kotika kokanisa oyo tokoki kosala mpo na kozongisa mabe na oyo basali biso, nde ekomonisa ete tolimbisi basusu. Biblia eteyaka ete bolingo oyo elukaka kaka matomba na yango moko te, nde esalaka ete moto alimbisa na ndenge ya solo, mpo bolingo “ebombaka mabe na motema te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

Oyo bolimbisi elimboli te

  •   Kokanga miso na mabe. Biblia eboyi makanisi oyo bato bazalaka na yango ya kokanga miso na misala ya mabe to kondima yango.​—Yisaya 5:20.

  •   Kosala lokola likambo moko te ya mabe esalemi. Nzambe alimbisaki Mokonzi Davidi na lisumu ya monene oyo asalaki, kasi abatelaki ye te na makama oyo lisumu yango ebimisaki. Kutu, Nzambe akomisaki masumu oyo Davidi asalaki mpo lelo bato báyeba yango.​—2 Samwele 12:9-13.

  •   Kotika basusu bámonela yo. Na ndakisa, kanisá ete odefisi moto mbongo, kasi asaleli yango na makambo ezangá ntina mpe akoki lisusu kozongisela yo te ndenge alakaki. Ayoki mpasi mpe asɛngi olimbisa ye. Yo nde okopona kolimbisa ye mpe koboya kobomba nkanda na motema, kolobelaka te likambo yango mbala na mbala mpe ntango mosusu koboma nyongo yango. Kasi, okoki mpe koboya kodefisa ye mbongo na mbala ya nsima.​—Nzembo 37:21; Masese 14:15; 22:3; Bagalatia 6:7.

  •   Kolimbisa oyo ezangá motó ná makolo. Nzambe alimbisaka moto oyo atiki mabe, abongoli motema mpe asɛngi bolimbisi na bato oyo asalelaki mabe, kasi alimbisaka te moto oyo asali mabe na nko, lisumu na kobombana mpe aboyi kondima mabe ya mabunga na ye. (Masese 28:13; Misala 26:20; Baebre 10:26) Moto oyo aboyi kobongola motema akómaka monguna ya Nzambe mpe tokoki te kolimbisa ye mpo Nzambe mpe alimbisi ye te.​—Nzembo 139:21, 22.

     Bongo soki moto moko asali yo mabe mpe aboyi kosɛnga bolimbisi to mpe aboyi kondima ete asali mabe? Biblia elobi boye: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka.” (Nzembo 37:8) Atako okoki kolongola libunga te, kasi okoki koboya kobomba nkanda. Tyá motema ete Nzambe akosambisa moto yango. (Baebre 10:30, 31) Okoki kokitisa motema na koyeba ete mokolo moko Nzambe akolongola bampasi nyonso oyo ezali kotungisa biso sikoyo.​—Yisaya 65:17; Emoniseli 21:4.

  •   “Kolimbisa” soki batyoli biso. Na bantango mosusu mpo tólimbisa moto oyo emonani lokola asali biso mabe, ekozala malamu tómona ete ezali na ntina te tósilika. Biblia elobi boye: “Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.”​—Mosakoli 7:9.

Ndenge ya kolimbisa moto

  1.   Kobosana te soki kolimbisa elimboli nini. Ozali te kokanga miso na mabe to kosala lokola likambo moko ya mabe esalemi te​—kasi otiki na yo kaka.

  2.   Koyeba matomba ya kolimbisa. Kolongola nkanda mpe koboya kobomba yango na motema ekoki kosalisa yo ozala kimya, obatela sante na yo mpe ozala na esengo. (Masese 14:30; Matai 5:9) Oyo eleki ntina, kolimbisa basusu nde ekosala ete Nzambe mpe alimbisa masumu na yo.​—Matai 6:14, 15.

  3.   Mityá na esika ya basusu. Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. (Yakobo 3:2) Kaka ndenge tolingaka bato bálimbisa biso, tosengeli mpe kolimbisa mabunga ya basusu.​—Matai 7:12.

  4.   Kozala makambo makasimakasi te. Ntango likambo moko esali biso mpasi, tokoki kosalela toli oyo ya Biblia: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu.”​—Bakolose 3:13.

  5.   Kolalisa makambo te. Na esika ya kotika ete nkanda emata, salá nyonso olimbisa.​—Baefese 4:26, 27.