Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na mokili ya sika

Na mokili ya sika

Zwá:

  1. 1. Zwá ntango ya kokanisa mpenza

    Moná ndenge bana baz’osakana

    Batondi na esengo

    Na mokili oyo mpasi ezali te.

    Mpe tóbatela mokili yango

    Moto nyonso az’otosa se Yehova:

    “Ezali mpo na seko”​—

    Tala kimya oyo tozelaki.

    Bolingo na ye

    Na boyangeli ya Yesu

    Tokomona yango.

    (Mondimo)

    Mpe elikya na motema.

    Eza’ longo mpo na molimo.

    Pole n’ango epesi biso

    Makasi t’ozela

    Mokili ya sika.

  2. 2. Kanisá moke esika oyo

    Bangomba mpe bibale kitoko mpenza.

    Eza’ndako na biso.

    Wana oza’ kotambola kuna,

    Omoni mot’oyebi

    Akufa kasi lelo asekwi

    Boyambani mpenza​—

    Boleli mpo bokabwana bambula.

    Liwa ekolongwa

    Yehova alaki

    Na mokili’a sika.

    (Mondimo)

    Mpe elikya na motema.

    Eza’ longo mpo na molimo.

    Pole n’ango epesi biso

    Makasi t’ozela

    Mokili ya sika.

    (Molongo mosusu)

    Liloba ya Yehova

    Ek’ozanga te kosalema.

    Mokano ya ye ezali

    Kopesa biso bomoi esengo.

    (Mondimo)

    Mpe elikya na motema.

    Eza’ longo mpo na molimo.

    Pole n’ango epesi biso

    Makasi t’ozela

    Makasi t’ozela,

    Mokili ya sika,

    Mokili ya sika,

    Mokili ya sika.