Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yango oyo na miso

Yango oyo na miso

Zwá:

  1. 1. Yoká loyembo kitoko

    Ya ndɛkɛ na likoló.

    Oz’otambola na nzela,

    Moi na likoló ez’ongɛnga.

    Nani wana az’oya?

    Ndeko na yo asekwi.

    Paradis tozelaki,

    Yango oyo na miso.

  2. 2. Talá ndako moko kuna,

    Mosusu na mwa ngomba.

    Yoká mingongo ya bato

    Mpe makɛlɛlɛ ya ebale.

    Mbum’eteli na elanga.

    Tókende kobuk’ango.

    Mokili tozelaki,

    Yango oyo na miso.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Oyo’esengo ná baninga

    Makamb’oyo tozelaki.

    Mai ya miso nyonso’esili.

    Nzoto’ezongi na bolenge.

  3. 3. Yoká mingongo y’esengo

    Mpe nsolo ya fololo.

    Na ntɔngɔ nyonso ozali

    Komona bat’oy’olingaka.

    Tolobi: “Mersi Yehova

    Mpo na bolingo na yo.”

    Mapamboli na miso,

    Yango oyo na miso.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Ntɔngɔ nyonso naz’oloba:

    “Nasepeli komona yo!”

    Mpo liboso, koyamba yo

    Ezalaki kaka ndɔtɔ.

  4. 4. Yang’oyo pembeni,

    Mokili naz’ozela.

    Eza elak’a Yehova.

    Ezali likambo ya solo.

    Soki nakanisi yango,

    Nalɛmbaka nzoto te.

    Mokolo naz’ozela,

    Mpe yango oyo na miso.