Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ekoleka te! (Loyembo ya liyangani ya 2023)

Ekoleka te! (Loyembo ya liyangani ya 2023)

(Habakuku 2:3)

Zwá :

  1. 1. Misala na yo kokamwa mpenza.

    Emonisaka mpe bolingo na yo.

    Yehova Nzambe, obongwanaka te.

    Olaki biso mokili ya sika.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

  2. 2. Toza’ kozela lisekwa eya.

    Yehova Nzambe, toza’ na elikya.

    Toyebi mpenza okosal’ango.

    Pesá biso se motema molai.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

  3. 3. Yo olukaka bato ya sembo.

    Opesi bango elikya mpe bomoi.

    Kosala na yo, koteya bato:

    Bomoi toponá; bomoi ya kitoko.

    (MONDIMO)

    Tozali kozela na motema nyonso

    Paradi olakaki.

    Tata toyebi ete ata ezwi ntango

    Ekoya se na ngonga

    Ekoleka te!

    Tata, sungá tózela!

(Talá mpe Kol. 1:11.)