Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tótika te koyamba bapaya

Tótika te koyamba bapaya

Zwá:

  1. 1. Ezala mwa ti to mpe bilei,

    Mwa masano, to mwa lisolo.

    Yehova nde apesi biso nyonso wana.

    Mpo etinda biso​—

    (MONDIMO)

    Tótika te koyamba bapaya.

    Tómekola Nzambe.

    Tóponaponaka bilongi te.

    Yango nde bolingo.

  2. 2. Ndak’oyo tofandi eza’ likabo ya Nzambe.

    Mabe eza’ wapi soki’oyambi bapaya?

    Yoká ndenge kokaba epesak’esengo!

    Wana bondeko.

    (MONDIMO)

    Tótika te koyamba bapaya.

    Tómekola Nzambe.

    Tóponaponaka bilongi te.

    Yango nde bolingo.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Basusu baz’okelela.

    Biso nde tókaba.

    Nyonso’ebebi na likama.

    Yo okosalisa?

    Okondima ndeko aya na ndako na yo?

    Salá bolamu.

    (MONDIMO)

    Tótika te koyamba bapaya.

    Tómekola Nzambe.

    Tóponaponaka bilongi te.

    Yango nde bolingo.

    Yango nde bolingo.

    Wana nde bolingo.