Lakisá makambo oyo ezali na kati

Elimo santu ezali nini?

Elimo santu ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Elimo santu ezali nguya to makasi oyo Nzambe asalelaka mosala. (Mika 3:8; Luka 1:35) Nzambe atindaka elimo to makasi na ye na esika nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye.​—Nzembo 104:30; 139:7.

 Na Biblia, liloba “elimo” euti na liloba ya Ebre rouah mpe liloba ya Grɛki pneuma. Mbala mingi, maloba yango emonisaka makasi, to elimo santu ya Nzambe. (Ebandeli 1:2) Kasi, Biblia esaleli mpe maloba yango na ndenge mosusu:

 Ndakisa mokomoko na nyonso wana etaleli eloko oyo emonanaka te na miso kasi mosala na yango emonanaka. Ndenge moko mpe, elimo ya Nzambe, oyo ezali “lokola mopɛpɛ, emonanaka te mpe ezali na nguya.”​—An Expository Dictionary of New Testament Words, ya William Vine.

 Biblia ebengi mpe elimo santu ya Nzambe “mabɔkɔ,” to “misapi” na ye. (Nzembo 8:3; 19:1; Luka 11:20; talá mpe Matai 12:28.) Ndenge moto ya misala ya mabɔkɔ asalelaka mabɔkɔ mpe misapi na ye mpo na kosala mosala, Nzambe mpe na nzela ya elimo na ye asalá makambo lokola oyo:

Elimo santu ezali moto te

 Ndenge Biblia ebengi elimo ya Nzambe “mabɔkɔ,” “misapi,” to mpe “mpema” na ye emonisi ete elimo santu ezali moto te. (Kobima 15:8, 10) Mabɔkɔ ya moto oyo asalaka misala ya mabɔkɔ ekoki te kosala yango moko kozanga mayele to nzoto ya moto yango; ndenge moko mpe elimo santu ya Nzambe esalaka kaka soki atindi yango. (Luka 11:13) Biblia ekokanisi mpe elimo santu ya Nzambe na mai mpe elobeli yango esika moko na biloko lokola kondima mpe boyebi. Nyonso wana emonisi ete elimo santu ezali moto te.​—Yisaya 44:3; Misala 6:5; 2 Bakorinti 6:6.

 Biblia elobi ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova; nkombo ya Mwana na ye ezali Yesu Kristo. Kasi na esika moko te epesi nkombo ya elimo santu. (Yisaya 42:8; Luka 1:31) Ntango bazalaki kobamba Stefano mabanga mpo na koboma ye, azwaki emonaneli moko ya likoló. Stefano amonaki kaka bato mibale, misato te. Biblia elobi boye: “Lokola atondaki na elimo santu, atalaki likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” (Misala 7:55) Elimo santu nde nguya oyo esalisaki Stefano azwa emonaneli wana.

Makambo oyo bato bakanisaka mpo na elimo santu

 Makanisi ya lokuta: Elimo santu ezali moto mpe ezali na kati ya Bosato, ndenge 1 Yoane 5:7, 8 na Biblia King James version emonisi yango.

 Likambo ya solo: Na Biblia King James version, 1 Yoane 5:7, 8 elobi: “na likoló, Tata, Liloba, mpe Elimo Santu: mpe nyonso misato ezali moko. Mpe yango misato epesi litatoli na mabele.” Kasi, bato oyo bayekolaka maloba ya Biblia bamoni ete ntoma Yoane akomaki maloba wana te, mpe na yango ezali maloba ya Biblia te. Profesɛrɛ Bruce Metzger akomaki boye: “Maloba yango ezali solo te mpe esengeli te kozala na kati ya Kondimana ya Sika.”​—A Textual Commentary on the Greek New Testament.

 Makanisi ya lokuta: Biblia elobeli elimo santu lokola moto, mpe yango emonisi ete ezali moto.

 Likambo ya solo: Na bantango mosusu Biblia elobeli elimo santu lokola moto, kasi yango emonisi te ete elimo santu ezali moto. Biblia elobeli mpe biloko mosusu lokola bato, na ndakisa bwanya, liwa, mpe lisumu. (Masese 1:20; Baroma 5:17, 21) Na ndakisa, Biblia elobi ete bwanya ezali na “misala” mpe “bana”; emonisi mpe ete lisumu ezali kobenda moto, koboma, mpe kobota bilulela.​—Matai 11:19; Luka 7:35, haut fleuve; Baroma 7:8, 11.

 Lisusu, ntango ntoma Yoane azongelaki maloba ya Yesu, alobelaki elimo santu lokola moto na ndenge abengaki yango “mosungi” (parakletos) oyo akopesa mokili elembo, akokamba, akoloba, akoyoka, akosakola, akopesa nkembo, mpe akozwa. (Yoane 16:7-15) Na esika oyo Yoane alobeli elimo santu lokola eloko asaleli liloba pneuma, oyo ebongolami na liloba “yango.”​—Yoane 14:16, 17.

 Makanisi ya lokuta: Kozwa batisimo na nkombo ya elimo santu emonisi ete ezali moto.

 Likambo ya solo: Na bisika mosusu, Biblia esaleli “nkombo” mpo na komonisa nguya to bokonzi. (Kolimbola Mibeko 18:5, 19-22; Estere 8:10) Ezali ndenge moko ntango basalelaka maloba lokola “mibeko elobi”; yango elakisi te ete mibeko ezali moto. Kozwa batisimo na “nkombo ya” elimo santu elimboli kondima nguya mpe mosala ya elimo santu na kokokisama ya mokano ya Nzambe.​—Matai 28:19.

 Makanisi ya lokuta: Bantoma ya Yesu mpe bayekoli na ye mosusu ya liboso bazalaki kondima ete elimo santu ezali moto.

 Likambo ya solo: Ezala Biblia to masolo ya kala elobi bongo te. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Likanisi oyo elobi ete Elimo Santu ezali nzambe . . . ebimaki na likita ya Constantinople na mobu 381 ya ntango na biso.” Esalemaki mbula koleka 250 nsima ya liwa ya bantoma.